Lakisá makambo oyo ezali na kati

22 SANZA YA 5, 2017
ÉTATS-UNIS

Ebele ya bato bazali koya kosala vizite na Biro monene ya Batatoli ya Yehova

Ebele ya bato bazali koya kosala vizite na Biro monene ya Batatoli ya Yehova

NEW YORK. Mokolo ya 29/04/2017, Biro monene ya sika ya Batatoli ya Yehova na Warwick, New York, efungolaki baporte na yango mpo na mbala ya mibale mpe ebele ya bato bayaki kosala vizite koleka na mbala ya liboso.

Samedi yango, bato 468 bayaki kosala vizite; elingi koloba motángo na bango ebakisami na 18% koleka vizite oyo bato basalaki mokolo ya samedi oyo elekaki. Ndeko Troy Snyder, oyo azali na mokumba ya kokɛngɛla Biro yango, alobi boye: “Tosepeli mpenza komona bato ya kartye mpe bakonzi ya engumba oyo bandimi koya kosala vizite na Biro na biso lokola tosilisi misala ya kotonga yango. Bato ya kartye bazongaki lisusu mbala ya mibale mpo na kosala vizite mpo na makambo oyo bamonaki pɔsɔ oyo eleki ntango tofungolaki baporte mpo moto nyonso asala vizite.”

Na mikolo yango mibale oyo tofungolaki baporte mpo bato básala vizite kobanda ngonga ya 10 tii ya 16, bato 863 bayaki kosala vizite. Ndeko Troy Snyder, alobi lisusu boye: “Tomoni ete makambo etamboli malamu mpenza ndenge tofungolaki baporte mpo bato básala vizite. Bato oyo bayaki balobi makambo ya malamu mpo na misala oyo tosali. Tokosepela lisusu koyamba mpo na mbala ya nsima, bato ya kartye na biso oyo bakolinga koya kosala vizite ya bandako mpe musée oyo tosali.”

Ingrid Magar

Mama Ingrid Magar, oyo afandaka na Tuxedo Park, mwa mboka moko oyo ezali mosika te, azalaki na kati ya bato oyo toyambaki na libaku yango. Asalaki mosala mbula 18 na Centre de recherche métallurgique de l’International Nickel Company, kompanyi oyo ezalaká awa liboso tótonga Biro na biso ya sika. Akanisi ndenge esika yango ezalaká liboso mpe alobi boye: “Ndenge esika oyo ekómi esepelisi ngai mpenza. Etikalaki mpamba bambula mingi mpe tozalaki komituna soki ekokóma ndenge nini. Ezali esika moko kitoko mpe bopesi yango valɛrɛ.” Mama Magar alobi mpe boye mpo na baoyo bafandi na Biro yango ya sika: “Nakanisi ete bino Batatoli ya Yehova boyebi kofanda na bato. Bozali boboto mpe botyelaka bato likebi. Bomibanzabanzaka mpo na esika bofandi mpe bato ya kartye na bino. Namoni ezali libaku malamu mpo na biso kofanda kartye moko na bato lokola bino.”

William Hoppe

William Hoppe, ingénieur moko oyo bakonzi ya engumba yango bapesaki ye mokumba ya kosala ankɛtɛ na ndenge misala ya botongi Biro yango ezalaki kosalema na boumeli ya mbula mibale ya nsuka ya misala yango, alobi boye: “Emonani ete bozalaki mpenza na mposa ya kolanda malako etali misala ya kotonga bandako . . .  yango emonani mpenza na mosala oyo bosali awa. Ekamwisi ngai mpenza komona ndenge Batatoli ya Yehova batyelaki zamba mpe bikelamu oyo ezali na kati likebi ntango bazalaki kotonga esika oyo tii ntango basilisaki mosala yango. Na etape mokomoko ya mosala oyo, babatelaki zamba mpe bikelamu oyo ezali na kati. Nakoki koloba ete bazali ndakisa malamu ya kolanda mpo na baoyo bakolinga kotonga bandako na mikolo ezali koya.”

Moto oyo bapanzi-nsango bakoki kobenga:

Mpo na mokili mobimba: David A. Semonian, Biro ya kozwa bansango, +1-845-524-3000