Lakisá makambo oyo ezali na kati

14 SANZA YA 2, 2017
ÉTATS-UNIS

Ebongiseli ya GBI epesi Batatoli ya Yehova Certificat ya bapwɛ mingi mpo na ndenge batongi biro na bango ya sika na Warwick

Ebongiseli ya GBI epesi Batatoli ya Yehova Certificat ya bapwɛ mingi mpo na ndenge batongi biro na bango ya sika na Warwick

NEW YORK. Ntango Batatoli ya Yehova basilisaki kotonga biro monene na bango ya sika na Warwick, na etúká New York, na 08/2016, bapesaki bango Certificat ya bapwɛ mingi mpo na ndenge batongaki yango. Green Building Initiative (GBI), ebongiseli moko oyo etalelaka makambo etali kobatela zamba, mopɛpɛ mpe mai mpe epesaka certificat mpo na bandako oyo etongami malamu, epesaki Batatoli ya Yehova certificat ya quatre Green Globes mpo bamonaki ete bandako na bango nsambo etongamaki na kolanda mibeko ya botongi.

Shaina Weinstein, mwasi moko oyo azali mokambi monene na GBI, alobi: “Na bandako 965 oyo batongaki na ekólo yango, kaka bandako 64 nde ezwaki certificat ya quatre Green Globes. Kasi likambo ya kokamwa, Batatoli ya Yehova bazwaki certificat yango mpo na bandako na bango nyonso nsambo na Warwick. Ndenge mosala yango esalemaki emonisi ete babatelaki mai, kura, mpe zamba.”

Ndenge Green Globes esalaka mpo na kopesa bapwɛ na ndingisa ya GBI. Bandako nyonso nsambo ya biro monene ya Batatoli ya Yehova ezwaki bapwɛ ebele (90%), to quatre Green Globes.

Na kotalela site Internet na bango, GBI ezali “ebongiseli moko ya mombongo te oyo mokano na yango ezali ya kotombola tekiniki ya kotonga bandako oyo ekosɛnga kosalela kura mpe mai mingi te, mpe kobatela zamba.” GBI esalaka liste ya bandako ya sika oyo etongami mpo na koyeba soki ekoumela mpe etongami na kolanda mibeko. Na kati ya mosala yango, bato mosusu ya mayele mpe batalaka soki lapolo oyo GBI epesi ezali mpenza solo.

David Bean, mokambi-misala ya kotonga babiro ya Batatoli ya Yehova na États-Unis, alobi: “Tosepeli ndenge bapesi biso certificat yango mpo emonisi ete baoyo batongaki yango bamipesaki mpenza mpe batosaki makambo oyo esɛngami mpo na bandako oyo ebebaka noki te. Bandako yango ebimisi mpenza kitoko ya zamba Sterling Forest State Park.”

Nsamba ya bandako yango ezali na milona oyo ebotaka yango moko na mabele oyo batyá likoló ya nsamba. Bazwaka mai ya mbula oyo ekitaka na nsamba yango mpe bapɛtolaka yango mpo na kosalela yango.

Batatoli ya Yehova basalelaki mayele ya kobatela banzete oyo bakutaki wana mpe kosalela banzete oyo bakataki mpo na mosala yango ya botongi. Jeffrey Hutchinson, oyo azalaká mokambi ya Sterling Forest, alobi boye: “Nasepeli ndenge bobatelaki banzete oyo bokataki mpo na kopɛtola esika oyo mpe ndenge bosalelaki lisusu banzete yango mpo na mosala na bino ya botongi. Batatoli ya Yehova babongi kozwa longonya ndenge babateli zamba.” Shaina Weinstein mpe alobi boye: “Mpo na biso, mosala oyo esalemi na Warwick ezali ndakisa malamu na makambo etali kotonga mpe kobatela zamba.”

Richard Devine, prezida ya komite ya kotonga biro ya Batatoli ya Yehova na Warwick, alobi: “Na boumeli ya bambula mingi, tobatelaki bandako ya biro monene na biso ya Brooklyn. Sikoyo tokomipesa mpe na kobatela bandako na biso ya Warwick, tokobatela mpe zamba kitoko ya parkɛ ya Sterling Forest.”

Moto oyo bapanzi-nsango bakoki kobenga:

Mpo na mokili mobimba: David Semonian, Biro ya kozwa bansango, +1-845-524-3000

 

Na ektare 100 ya lopango ya Warwick, New York, oyo basombaki na mokolo ya 17/07/2009, batongi bandako kaka na eteni moke ya mabele yango (20%).

Batyaki babulangeti mpe mabanga ya minene mpe ya mike na kati ya lopango yango mpo mabele epasuka te (érosion).

Bazwaki mabanga minene kaka na lopango yango na ebandeli mpenza ya mosala ya botongi. Basalelaki tɔni koleka 240 000 ya mabanga oyo bazwaki kaka wana.

Batyaki barido mpe manzanza na nse ya barido yango mpo basalite oyo ezali kopumbwa ekatisa te na Laki Bleu to laki Sterling Forest.

Batyaki bikunde mpo na kotyaka biloko oyo bakoki kobongisa lisusu. Bitenibiteni ya biloko oyo ezalaki kotikala na ntango bazali kotonga, bazwaki yango mpe bamemaki yango na baizini oyo ebongisaka yango lisusu.

Bandeko bazali kolona na ekɔtelo monene ya Warwick. Na kati ya milona yango ezali mpe na banzete ná matiti oyo ebotaka yango moko mpe oyo etandanaka na mabele.

Bandeko bazali kotya mwa masini moko oyo basali, oyo ezali na batiyo oyo elekisaka mai na nse ya mabele mpo epesaka mwa molunge na ntango ya malili mpe epesaka mwa malili na ntango ya molunge. Lokola batye yango na nse mpenza ya mabele, mɛtrɛ 152, mai yango ekobanda kobenda molunge ya nse ya mabele mpo na kotya ndako molunge na eleko ya malili mpe ekosalela mai yango na eleko ya molunge mpo na kopesa ndako malili. Mayele yango ekosala ete tósalela kura mingi te mpo na kotya molunge to malili na bandako ya Warwick.

Na kati ya bandako oyo ezali na babiro mpe ya misala mosusu. Na kati ya bandako yango; na ndakisa biloko oyo batye na bifelo, pavema mpe plafɔ eyokani na masɛngami ya Green Buliding Initiative oyo esɛngaka ete kosalela mingi te biloko oyo ebebisaka mopɛpɛ. Lokola basaleli biloko oyo ebimisaka bagaze ya mabe te, yango ekobatela sante ya bandeko.