Lakisá makambo oyo ezali na kati

15/5/2018
ÉTATS-UNIS

Kotomboka ya volcan na Hawaï ebimisi makama mpe bato basundoli bandako na bango

Kotomboka ya volcan na Hawaï ebimisi makama mpe bato basundoli bandako na bango

Kobanda mokolo ya 3/05/2018, volcan Kilauea na esanga monene ya Hawaï, na Etats-Unis etombokaki mpe esɛngaki bato soki 2 000 oyo bafandaka kuna bálongwa mpe ebebisaki bandako soki 36.

Mabota minei ya Batatoli ya Yehova ná ndeko mwasi moko ya mobange bazalaki na kati ya bato oyo balongwaki na esika yango. Atako Ndako ya Bokonzi moko te ebebaki na pɔtɔpɔtɔ oyo volcan yango esopaki, koningana ya mabele oyo esalemaki na mokolo ya 4/05/2018 ebebisaki mwa moke Ndako ya Bokonzi moko.

Komite ya kopesa lisungi (DRC), elongo na bandeko ya esanga yango bazali kopesa bandeko oyo bazwaki likama lisungi. Soki makambo ezongi ndenge ezalaka, komite yango ekotala lisungi nini mosusu esengeli kopesama.

Tozali kokoba kobondela mpo na bandeko na biso oyo bazwi likama na kondima ete Yehova akokóma esika makasi ya libateli mpo na bango na ntango wana ya mpasi.​—Nahumu 1:7.