Lakisá makambo oyo ezali na kati

2 SANZA YA 3, 2018
ÉTATS-UNIS

Mai ya mpela etondisi centre ya États-Unis

Mai ya mpela etondisi centre ya États-Unis

Na boumeli ya sanza ya 02/2018, mbula makasi mpe konyangwa ya banɛjɛ etondisaki centre ya États-Unis na mai. Bandeko na biso oyo bafandaka na bisika mosusu ya Illinois, Indiana, Kentucky, Michigan, Ohio, mpe Tennessee bazali na kati ya ebele ya bato oyo bazwaki likama mpo na mai yango.

Biro ya Batatoli ya Yehova na États-Unis elobi ete bandeko 20 ya zongazonga 8 balongwaki na bandako na bango. Likambo ya mawa, ndeko na biso moko ya mwasi na Indiana, akufaki na mbula makasi oyo etondisaki mai yango. Bandako 57 ya bandeko na biso ebebaki.

Bakɛngɛli ya zongazonga bazali kolendisa bandeko nyonso oyo bazwaki likama. Tozali kokoba kobondela mpo na bandeko na biso, na elikya ete Yehova akosalisa bango na mitungisi na bango nyonso.​—1 Petro 5:7.

Moto oyo bapanzi-nsango bakoki kobenga:

David A. Semonian, Biro ya kozwa bansango, +1-845-524-3000