Lakisá makambo oyo ezali na kati

11/9/2017
ÉTATS-UNIS

Bansango ya sika etali mopɛpɛ makasi babengi Irma

Bansango ya sika etali mopɛpɛ makasi babengi Irma

Tozali sikoyo na likoki ya kopesa bino bansango etali makambo oyo bandeko na biso ya Caraïbes mpe ya sud-est ya États-Unis bakutani na yango nsima ya mopɛpɛ makasi oyo babengi Irma.

Likambo ya mawa, ndeko mobali moko ya mobange mpe ndeko na biso ya mwasi na etúká ya Géorgie bakufaki ntango bazali kolongwa na esika yango. Longola yango, bandeko mibali mibale bazokaki na esanga ya Tortola, esanga oyo eleki monene na bisanga Vierges ya Angleterre. Na Caraïbes mobimba, bandako koleka 40 ebebaki mpenza mpe Batatoli ya Yehova soki 40 balongwaki mpe bakendaki esika mosusu. Oyo ezali kaka mwa bansango tozwi mpe tokopesa bansango mosusu na nsima mpo bandeko bazali naino koluka koyeba bisika oyo mopɛpɛ yango ebebisi na etúká yango.

Tozali kobondela mpo na baoyo bandeko na bango bakufi na likama yango mpe mpo na baoyo bazwi makama mpo na mopɛpɛ yango. Tozali kokoba koluka lisalisi oyo Yehova apesaka na nzela ya lisangá.​—1 Batesaloniki 3:7.

Moto oyo bapanzi-nsango bakoki kobenga:

Mpo na mokili mobimba: David Semonian, Biro ya kozwa bansango: +1-845-524-3000