Lakisá makambo oyo ezali na kati

17/10/2018
ÉTATS-UNIS

Mopɛpɛ makasi Michael, moko ya mipɛpɛ makasi koleka oyo ebɛtá na États-Unis, ebimisaki mpenza makama minene

Mopɛpɛ makasi Michael, moko ya mipɛpɛ makasi koleka oyo ebɛtá na États-Unis, ebimisaki mpenza makama minene

Mopɛpɛ makasi babengi Michael ebɛtaki na sudi-ɛsti ya États-Unis na mokolo ya 10/10/2018, mpe ebebisaki Floride. Balobi ezali moko ya mipɛpɛ makasi koleka oyo ebɛti États-Unis mpe ebebisaki biloko ebele mpenza. Mopɛpɛ yango ebomaki bato soki 18.

Mopɛpɛ yango ememelaki bandeko ya masangá 94 mpe zongazonga 13 mpasi. Ata ndeko moko te akufaki na likama yango, kasi bandeko misato bazokaki. Mopɛpɛ yango ebebisaki bandako 528 ya bandeko mpe Bandako ya Bokonzi 34 mpe Bandako ya Bokonzi 39 ezangaki kura.

Biro ya filiale ya États-Unis elongo na komite ya kopesa lisungi mpe bakɛngɛli ya zongazonga koleka 40, bazali kotambwisa mosala yango ya kopesa lisungi. Mosala yango esɛngi kopesa bandeko bilei, lisalisi ya monganga, bisika ya kolala, mai ata mpe kotya bakapo na bisika yango ya kolala mpe kopɛtola bisika oyo banzete ekweaki. Ebongiseli ezwamaki mpe mpo na kolendisa bandeko na nzela ya Liloba ya Nzambe.

Atako bandeko na biso bazali mpe kozwa makama mpo na makambo ya mpasi oyo ezali kosalema na mokili oyo, ata mpe oyo ezali kobima mpo na mipɛpɛ makasi to koningana ya mabele, bazali kotyela Yehova motema mobimba mpo na lisungi oyo azangaka te kopesa basaleli na ye.​—Nzembo 142:5.