Lakisá makambo oyo ezali na kati

7/8/2018
ÉTATS-UNIS

Mɔtɔ makasi oyo babengi “Carr Fire” epeli pene ya Redding, na Californie

Mɔtɔ makasi oyo babengi “Carr Fire” epeli pene ya Redding, na Californie

Mɔtɔ makasi epelaki na Californie, na mokolo ya 23/07/2018. Banda wana, ezali kokoba kobebisa eteni ya mabele oyo ezwami zingazinga ya engumba Redding. Mɔtɔ yango, oyo ebengami “Carr Fire” na kolanda esika oyo yango ebandaki, ebomi bato mwambe, ezikisi eteni ya mabele ya ba-ektare koleka 45 000 mpe ebebisi bandako koleka 1 300.

Ata mosakoli moko te oyo afandaka na esika yango azikaki, kasi bayebisi biso ete ndeko mobali moko azikaki mwa moke ntango azalaki kotambwisa motuka moko ya monene mpo na kosalisa bato oyo babomaka mɔtɔ. Bandeko nyonso oyo balongwe na esika yango mpe bakómi kofanda na bandako ya bandeko na bango ya libota to ya lisangá bazali 454. Bandako ya mabota 12 ya Batatoli ya Yehova ezikaki na mɔtɔ yango.

Bandeko basalaki nyonso mpo na koyeba soki mosakoli mokomoko azali malamu. Bakɛngɛli ya zongazonga elongo na bankulutu ya masangá ya kuna bazali kosala elongo mpo na kopesa bandeko yango lisungi oyo basengeli na yango na elimo mpe na mosuni na ntango oyo ya mpasi.​—Masese 17:17.