Lakisá makambo oyo ezali na kati

31 SANZA YA 10, 2017
ÉTATS-UNIS

Video moko ya Batatoli esalisi baboti báyeba ndenge ya kosilisa mokakatano moko ya sante: Matumoli

Video moko ya Batatoli esalisi baboti báyeba ndenge ya kosilisa mokakatano moko ya sante: Matumoli

NEW YORK​—Ankɛtɛ moko oyo iniversite ya Michigan esalaki na 2017 na lopitalo moko ya bana C.S. Mott emonisi ete matumoli ezali likambo ya liboso oyo etungisaka mingi baboti na États-Unis mpo na sante ya bana na bango.

Site Internet stopbullying.gov, oyo ekambamaka na Departema ya sante mpe Departema oyo etalelaka makambo ya kosalisa bato na États-Unis, emonisi ntina oyo baboti bamitungisaka: Baankɛtɛ oyo basali emonisi ete bana-kelasi mingi (30 %) na États-Unis balobi ete batumolaka bango na kelasi.

David Semonian, molobeli ya Biro monene ya Batatoli ya Yehova oyo ezali na New-York, alobi boye: “Toyebi ete matumoli etungisaka mpenza bana. Yango wana, na mosala na biso ya koteya Biblia, topesaka bato oyo balingi mikanda na biso oyo ezali kolobela matumoli mpe mikakatano mosusu oyo mabota ekutanaka na yango. Mabota ebele na mokili mobimba emoni ete video ya moto oyo azali koyema na motó ya likambo Longá matumoli kozanga ete obunda oyo elingi ekokisa sikoyo mbula mitano banda ebimá, esalisi bango mingi.”

Ndenge video Longá matumoli kozanga ete obunda ezali komonana na ekra video yango ezali kolendisa bilenge oyo bazali kotumola bango báyebisaka baboti na bango, balakisi to mokóló mosusu oyo batyelaka motema.

Video yango ya miniti soki minei ezali na site Internet ya Batatoli ya Yehova jw.org na minɔkɔ koleka 280, ata mpe na minɔkɔ koleka 30 ya elobeli ya bajɛstɛ.

Natalia Cárdenas Zuluaga, mokambi ya ebongiseli moko oyo etalelaka sante ya bana mpe bilenge na iniversite ya CES na Colombie, alobi boye: “Mateya oyo video Longá matumoli kozanga ete obunda ezali na yango ezali kosepelisa ngai mingi mpo na mboka na biso, baboti mosusu bayebisaka bana na bango ete mpo na kobongisa matata esɛngi bango mpe bázongisa mabe na mabe. Nakanisi ete video oyo epesi bana oyo batumolaka bango batoli ya malamu. Emonisi likambo ya solo na oyo etali matumoli: moto nyonso bakoki kotumola ye mpo akeseni na basusu. Soki ayebi likambo yango, mwana akoki kozala motema mpiɔ mpe kosepela ndenge akeseni na basusu mpo na bomoto na ye.”

Profesɛrɛ Jun Sung Hong, mokambi makita na iniversite ya Sungkyunkwan na Corée du Sud, alobi boye: “Ndenge basali video yango lokola ba-dessin esali ete ezala na ntina mpe esepelisa, mingimingi bana mike oyo batumolaka bango. Nakanisi ete ezali mpe kosalisa baoyo batali yango bábosana te makambo oyo batali na video yango.”

Lisusu, profesɛrɛ Shelley Hymel, moko ya bato oyo basalaki Réseau international de recherche sur le harcèlement, alobi boye: “Nakanisi ete nsango na yango ebongi mpo na bana mpe eyokani na makambo oyo nayebi. Ekosalisa mpenza baboti básolola na bana, ekosalisa mpe balakisi mpe mikóló mosusu oyo basalaka misala elongo na bana mpe bilenge.”

Semonian abakisi boye: “Tomityaka na esika ya bana oyo batumolaka bango mpe tozali na elikya ete toli oyo ezali na video yango ekosalisa bango mpenza. Ndenge video yango esɛngi, elenge asengeli kosolola na moto oyo atyelaka motema, mingimingi baboti na ye to molakisi mpo azwa lisalisi oyo esengeli. Moto moko te asengeli koluka kosilisa matumoli kaka ye moko.”

Moto oyo bapanzi-nsango bakoki kobenga:

Na mokili mobimba: David Semonian, biro ya kozwa bansango: +1 845 524 3000