Lakisá makambo oyo ezali na kati

05 SANZA YA 02, 2015
FRANCE

Tribinale oyo eleki monene ya makambo ya Leta na France esukisi likambo ya kosalela basusu makambo na kozanga bosembo

Tribinale oyo eleki monene ya makambo ya Leta na France esukisi likambo ya kosalela basusu makambo na kozanga bosembo

Nsima ya kosolola na bino, nazalaka na esengo mpe nayembaka. Ndenge boyaka kotala ngai ebɔndisaka ngai mpenza, mpe koyekola Biblia esali ete bomoi na ngai ezala na ntina.

Nalingaki kaka kopesa matɔndi epai na bino na makambo nyonso oyo bosalaki; na ndakisa: kolandela mibeko, makambo ya Leta mpe kolendisa ngai na elimo

Ebongiseli yango epesi eyano na mabondeli na ngai.

Oyo ezali maloba ya botɔndi oyo bato ya bolɔkɔ na France bapesaka mpo na lisungi ya elimo oyo Batatoli ya Yehova bapesaka bango.

Na mokolo ya 16/10/2013, tribinale oyo eleki monene ya makambo ya Leta na France ekweisaki mitindo oyo esukisaki eleko ya kosalela Batatoli ya Yehova makambo na kozanga bosembo na France. Tribinale yango epesi Batatoli ya Yehova nzela ya kosakwela bato ya bolɔkɔ oyo basɛngi básalisa bango na mateya ya Nzambe lokola bakonzi ya mangomba oyo bandimami bakɔtaka koteya bato yango. *

Baboyi kotya Batatoli ya Yehova na molɔngɔ ya bakonzi ya mangomba oyo bakendeke koteya bato ya bolɔkɔ

Na boumeli ya bambula mingi, bakambi ya bolɔkɔ bapesaki Batatoli ya Yehova nzela ya kokɔta na bolɔkɔ mpo na koteya bato ya bolɔkɔ mpe kopesa bango toli ya Liloba ya Nzambe atako bazali te na certificat ya kozala bakonzi ya mangomba oyo bakendeke koteya bato ya bolɔkɔ. Kasi yango ebongwanaki na 1995 ntango komisyo ya Parlema ebimisaki liste ya mangomba oyo emonaki ete ezali mabe mpenza, lingomba ya Batatoli ya Yehova ezalaki mpe na liste ya mangomba yango. Yango esalaki ete bato bámona lingomba ya Batatoli ya Yehova mabe mpenza. Ebandisaki nde likambo ya kosalela Batatoli ya Yehova makambo na kozanga bosembo. Yango emonanaki ntango baboyaki kopesa bango nzela ya kokɔta na bolɔkɔ mpo na koteya bato ya bolɔkɔ.

Atako lapolo ya parlema ebebisaki te mibeko, na babolɔkɔ mosusu basalelaki ekateli oyo ebimaki na 1995 mpo na kopekisa Batatoli ya Yehova bákɔta koteya bato ya bolɔkɔ oyo basɛngi básalisa bango na elimo. Motatoli moko akokaki kotala moto moko ya bolɔkɔ lokola moto nyonso oyo azali na lotomo na yango, kasi te lokola mokonzi moko ya losambo oyo akendeke koteya bato ya bolɔkɔ. Longola oyo wana, akokaki te komema Biblia to mokanda moko ya losambo. Bavizite nyonso ezalaki kosalema na esika oyo bato nyonso bazali, mpe esika yango ebongaki te mpo na koyekola na moto Biblia. Motatoli moko alobaki ete esika yango “ezalaki lokola shambrɛ moko ya engbunduka oyo etondi na makelele.” Na babolɔkɔ mosusu esɛngaki bákɔta na bashambrɛ ya bato ya bolɔkɔ mpo na kolukaluka kuna mpo moto moko oyo andimami na Leta te lokola mokonzi ya lingomba oyo akendeke koteya bato ya bolɔkɔ akɔtaki kuna.

Mpo bázwa ntomo oyo basusu bazali na yango, Batatoli ya Yehova basalaki milende mpo na koluka certificat oyo bapesaka bakonzi ya mangomba oyo bakendeke koteya bato ya bolɔkɔ epai ya bakonzi ya bolɔkɔ na France na 2003. Makambo nyonso oyo basɛngaki baboyelaki bango mpenza. Batatoli ya Yehova baboyaki ekateli na bango mpe bamemaki makambo yango epai ya bakonzi ya Leta oyo baleki, kasi esimbaki te. Ntina oyo ministere ya Justice ya France epesaki oyo esalaki ete báboya kopesa Batatoli ya Yehova ntomo yango oyo bapesaka bakonzi ya mangomba oyo bakendeke koteya bato na bolɔkɔ ezali ete bazalaki te na kati ya liste ya mangomba oyo bapesaki nzela ya kokende koteya bato ya bolɔkɔ. Ministere yango emonisaki mpe makambo oyo ezalaki komitungisa mpo na yango, soki epesi Motatoli ya Yehova moko certificat yango ekoki kosala ete bato ya mangomba mosusu oyo ezali na bato moke mpenza bákoka kosɛnga yango. Lokola ministere ya Justice eboyaki kopesa bango certificat yango, Batatoli ya Yehova bamonaki ete likambo mosusu ya kosala ezali te, basengelaki kaka komema likambo yango na batribinale.

Guvɛrnema eboyi kosilisa likambo ya kosalela basusu makambo na kozanga bosembo

Na 2006, Batatoli ya Yehova babandaki kolandela likambo yango na tribinale mpo bálongola ekateli na bango ya koboya kopesa bango certificat yango mpe basɛngaki na ministere ya Justice epesa bango certificat yango. Batribinale nyonso ya makambo ya Leta mpe batribinale minene ya ekólo yango etalelaki likambo yango mpe emonaki ete ezali kobuka mibeko kopimela Batatoli ya Yehova certificat yango. Lisusu, na 2010, Haute Autorité de Lutte contre les Discriminations et pour l’Égalité ebimisaki polele ekateli ya guvɛrnema mpe esɛngaki ete ministere ya Justice etya nsuka na likambo ya kosalela basusu makambo na kozanga bosembo.

Guvɛrnema ya France eboyaki kaka te koyoka likebisi yango mpe kotosa bikateli ya batribinale, kasi eboyaki mpe kotosa Conseil d’État, tribinale oyo eleki monene ya makambo ya Leta na France.

Ekateli oyo etiká nsango mpo na bolamu ya Batatoli ya Yehova

Na 2013, nsukansuka Conseil d’État etalelaki likambo ya Batatoli ya Yehova, etyaki yango na makambo libwa oyo ekokanaki na yango. Na ekateli oyo ezwaki na mokolo ya 16/10/2013, Conseil d’État eboyaki makambo oyo ministere ya Justice esɛngaki. Elobaki ete mpo na kotosa ntoma ya moto ya bolɔkɔ, bakonzi ya bolɔkɔ basengeli “kondima moto azala mokonzi ya lingomba oyo akendeke koteya bato ya bolɔkɔ ntango kaka bosɛnga yango esalemi, kasi basengeli kobatela baoyo bazali na bolɔkɔ mpe kosala ete makambo esalema na bolɔkɔ na molɔngɔ.” Lisusu, na kotalela mibeko ya ekólo France mpe ya Convention européenne des droits de l’homme, mpe ya Conseil d’État elobaki ete “moto ya bolɔkɔ azali na bosomi ya koloba, ya lisosoli, mpe ya kokɔta na losambo oyo alingi.” Mpo na ekateli yango, bato 105 bandimamaki lokola bakonzi ya mangomba oyo bakendeke koteya bato ya bolɔkɔ na France, ezala mpe na badepartema mpe bateritware mosusu oyo bazali na nse ya bokonzi ya France, yango esalaki ete Batatoli ya Yehova bákende kolendisa bato ya bolɔkɔ na mateya ya Biblia.

Na sanza ya 01/2014, Leta ya France endimaki Jean-Marc Fourcault asala lokola mokonzi ya lingomba oyo ateyaka bato ya bolɔkɔ na ekólo mobimba. Mokumba oyo ndeko Fourcault azali na yango epesi ye nzela ya kokɔta na babolɔkɔ nyonso ya France. Azwi mpe ndingisa ya kosala lokola momonisi ya Batatoli ya Yehova liboso ya Leta. Ndeko Fourcault alobi boye: “Banda lelo, ndenge moko na bamonisi ya mangomba mosusu, Batatoli ya Yehova bakoki koyangana elongo na bato ya bolɔkɔ na nkuku, mpe na bisika ya lokumu mpe oyo ebongi, na bantango mosusu na bashambrɛ na bango.”

Ekateli yango ezali elonga moko monene mpo na bosomi ya losambo na France. Endimisi ete bato ya bolɔkɔ bazali na ntomo ya kosambela na lingomba oyo basepeli mpe bakoki kokende kotala bango na bakonzi ya mangomba oyo balingi. Batatoli ya Yehova bazali kopesa batribinale ya France matɔndi ndenge esukisi makambo wana ya kosalela basusu makambo na kozanga bosembo. Likambo mosusu ezali ete lingomba ya Batatoli ya Yehova eyebani na Leta lokola moko ya mangomba na France.

^ par. 6 Bato mosusu ya bolɔkɔ bazali kokóma Batatoli ya Yehova nsima ya kosolola na Batatoli ya Yehova ntango bazali na bolɔkɔ. Basusu liboso bákɔta bolɔkɔ, basí bakutaná na Batatoli ya Yehova to baboti na bango bazali Batatoli ya Yehova, mpe balingi bázonga na lisangá. Ezala mpo na ntina nini oyo etindi bango bálinga Batatoli ya Yehova bátalaka bango na bolɔkɔ, bato yango bazali na bosomi ya losambo ndenge moko na bato mosusu ya bolɔkɔ ya mangomba mosusu.