Lakisá makambo oyo ezali na kati

29/10/2018
FRANCE

Mpela ya mbalakaka na sudi-ɛsti ya France

Mpela ya mbalakaka na sudi-ɛsti ya France

Mbula makasi ebɛtaki na sudi-ɛsti ya France na mokolo ya 14 mpe ya 15/10/2018, mpe mai etondaki makasi na boye ete bato soki zomi bakufaki.

Filiale ya France elobi ete ata ndeko na biso moko te ya etúká yango akufaki, kasi mabota mosusu balongwaki na bandako na bango ntango mai ekómaki kotonda. Bandeko na biso mosusu balobi ete biloko na bango ebebaki mwa moke; kasi bandako misato nde ebebaki makasi. Biro ya misala ya kopesa lisungi na filiale ya France ezali kopesa bandeko lisungi oyo basengeli na yango.

Tozali na kondima ete lobɔkɔ ya Nzambe na biso Yehova oyo ezali na nguya, ‘ekosimba makasi’ bandeko na biso oyo bazali kokoba kokangama na ye na ntango oyo ya mpasi.​—Nzembo 63:8.