Lakisá makambo oyo ezali na kati

Minos Kokkinakis: Na mboka mosika epai bamemaki ye ná Batatoli ya Yehova mosusu mpe na nsima.

7/1/2019
GRÈCE

Kokanisa mbula 50 ya koluka kozwa bonsomi mpo na kosakola nsango malamu

Kokanisa mbula 50 ya koluka kozwa bonsomi mpo na kosakola nsango malamu

Eleki sikoyo mbula 80, masuwa moko ememaká Minos Kokkinakis na esanga moko ya Grèce, Amorgós na Mbu Égée, epai asengelaki kolekisa sanza 13 mosika na esika oyo ozalaki kofanda. Kozanga ete básambisa ndeko Kokkinakis, tribinale moko ya Grèce ekatelaki ye etumbu mpo abukaki mobeko moko oyo eutaki kobima, oyo epekisaki kosakwela basusu. Azali Motatoli ya Yehova ya liboso na kati ya Batatoli ya Yehova 19 147 oyo bakangaki bango kobanda 1938 tii 1992 mpo babukaki mobeko oyo Ioánnis Metaxásarre, mokonzi moko mabe azalaki koyangela Grèce abimisaki. Na boumeli ya eleko yango, ebele ya Batatoli ya Yehova ya Grèce bakobaki kosakola nsango malamu atako bazalaki kobɛta, kokanga mpe kokatela bango etumbu ya bolɔkɔ.

Ndeko Kokkinakis azalaki na mbula soki 30 ntango abandaki kosamba mpo na koluka bonsomi ya kolobela mateya oyo andimaka; mpe yango esalaki mbula 50 mobimba. Bakangaki ye mbala koleka 60 mpe alekisaki mbula koleka motoba na babolɔkɔ ndenge na ndenge mpe na bisanga oyo ezalaki lokola babolɔkɔ, epai ye ná Batatoli ya Yehova mosusu bakangamaki na bisika moko ya mabe mpenza. Bakangaki ye mpo na mbala ya nsuka ntango azalaki na mbula 77, mpe aboyaki yango na tribinale. Nsukansuka, amemaki likambo yango na tribinale monene ya Grèce, kasi esimbaki kaka te. Ndeko Kokkinakis amemaki likambo yango na tribinale ya Mpoto oyo etalelaka ntomo ya moto (CEDH) mpe amonisaki ete Grèce etosi te bonsomi na ye ya losambo. Na 1993, ntango azalaki na mbula 84, Minos Kokkinakis alongaki na kosamba yango: ezalaki mbala ya liboso CEDH eloba ete mboka moko ekwei na likambo mpo etosi te bonsomi ya losambo. * Na 2018, ekateli yango ya ntina mingi ekokisaki mbula 25. Profesɛrɛ moko ya droit international public alobi ekateli oyo ezwamaki mpo na Kokkinakis “ezali likambo oyo CEDH elobelaka mingi na likambo etali bonsomi ya losambo mpe ya mateya.”

Tii lelo, ekateli oyo ezwamaki na likambo ya Kokkinakis ezali kosalisa biso na batribinale na eleko oyo baguvɛrnema ya nguya, na ndakisa Russie, oyo ezali koboya kotosa bonsomi ya losambo ya bandeko mingi.

Kondima ya ndeko Kokkinakis mpe kotingama na ye na mosala ya kosakola ezali ndakisa malamu mpenza mpo na bandeko na biso oyo bazali kokutana na botɛmɛli na mosala ya kosakola. Bosembo na ye esalaki ete alonga na tribinale mpe yango ezali kosalisa bandeko na biso tii lelo.​—Baroma 1:8.

^ par. 3 Minos Kokkinakis akufaki na sanza ya 01/1999.