Lakisá makambo oyo ezali na kati

27/7/2018
GRÈCE

Mɔtɔ ya zamba na Grèce

Mɔtɔ ya zamba na Grèce

Mipɛpɛ makasi oyo esalaki ete mɔtɔ ya zamba ebakisama lisusu makasi ebebisaki bomoi ya bato mpe biloko na libándá ya engumba Athènes, na Grèce. Bato soki 76 bakufaki mpe basusu 187 bazikaki na mɔtɔ yango. Oyo ezali mɔtɔ oyo ebomi bato mingi koleka nsima ya mbula koleka zomi.

Biro ya misala ya Batatoli ya Yehova na Grèce elobi ete ndeko na biso moko te akufi to azoki na likama yango. Ata bongo, esɛngaki ete bandeko nyonso oyo bafandi na esika yango bálongwa mpe bakómi sikoyo kofanda na bandako ya bandeko ya masangá ya zingazinga. Lisusu, bandako minei ya Batatoli ya Yehova ebebaki makasi mpe moko ebukanaki nyonso.

Tozali kobondela mpo na bandeko na biso oyo bazwi likama mpe mpo na baoyo bolingo etindi bango bápesa bandeko yango bisika ya kofanda. (Yoane 13:34, 35) Toyebi ete Yehova akokoba kosunga bandeko na biso wana na boumeli ya ntango oyo ya mpasi.