Lakisá makambo oyo ezali na kati

5/6/2018
GUATEMALA

Volcan etomboki na Guatemala

Volcan etomboki na Guatemala

Na mokolo ya lomingo 3/06/2018, Volcan de Fuego na Guatemala, to “volcan ya mɔtɔ, “etombokaki, esanzaki ebale ya pɔtɔpɔtɔ ya mɔtɔ mpe ematisaki lipata ya milinga na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 9. Masangá soki zomi ezalaka na esika yango. Likambo ya esengo, ndeko na biso moko te akufaki to azokaki na likama yango, atako bandeko mwambe balongwaki na bandako na bango mpo na koluka libateli. Na kolanda likanisi oyo ezali na 2 Bakorinti 8:14, 15, masangá ya bazongazonga ya pembeni epesaki bandeko yango bilei, esika ya kolala mpe transport.