Lakisá makambo oyo ezali na kati

30/10/2020
INDE

Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika ebimi na minɔkɔ misato ya Inde

Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika ebimi na minɔkɔ misato ya Inde

Na mokolo ya lomingo ya 25/10/2020, Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika ebimaki na minɔkɔ misato ya Inde: Gujarati, Kannada, mpe Punjabi. Babiblia yango ebimaki na ndenge oyo ekoki kotángama na Internet to na aparɛyi, diskur ya kobimisa yango esalemaki na video. Basakoli balandaki diskur yango na bandako na bango. Kaka na nsima ya diskur, bazalaki na likoki ya kozwa Babiblia yango na nzela ya Internet.

Gujarati

Na mokili mobimba, bato soki milio 61 balobaka monɔkɔ ya Gujarati.

Bandeko motoba babongolaki Biblia yango na boumeli ya mbula nsambo. Moko ya bandeko oyo babongolaki alobi boye: “Kobima ya Biblia yango epesi biso mpenza esengo. Ezali na elobeli ya pɛtɛɛ, ata mwana moke akokanga ntina ya makambo atángi.”

Mobongoli mosusu alobi ete: “Na Biblia oyo, nkombo ya Yehova etyami na esika oyo ezalaki na makomi ya ebandeli. Toyebi ete kondima ya bandeko na biso ekokóma makasi mpenza ntango bakosalela Biblia oyo na boyekoli na bango moko.”

Biblia oyo ezali na elobeli ya pɛtɛɛ, yango wana, tozali na elikya ete bato oyo bakotánga yango bakosepela mpenza na yango. Ekosalisa mpe “bato ya komikitisa” báyeba banzela ya Yehova.​—Nzembo 25:9.

Kannada

Ndenge monɔkɔ ya Kannada elobamaka mpe ndenge bakomaka yango ekesanaka mpenza. Esika na esika balobaka monɔkɔ ya Kannada na ndenge na bango. Yango wana, ezalaki mpasi babongoli bákoma Kannada ya pɛtɛɛ, ndenge bato balobaka, mpe kobongola nsango ya Biblia na bosikisiki mpo na bato oyo bakotánga yango na bisika nyonso oyo balobaka monɔkɔ yango.

Babongolaki Biblia mobimba na boumeli ya mbula nsambo. Bandeko zomi babongolaki yango. Moko ya bandeko oyo babongolaki alobaki boye: “Nakanisaki ete Biblia yango ekobima na 2021 mpo na maladi ya COVID-19. Kasi, kobima na yango emonisi ete eloko moko te ekoki kopekisa mosala ya Yehova.”

Ndeko mosusu kati na babongoli abakisi boye: “Kokanisa ete sikoyo bato oyo balobaka monɔkɔ ya Kannada bakotánga maloba ya Yehova na monɔkɔ na bango, mpe bakomona nkombo na ye na bisika oyo esengeli kozala, ezali kosepelisa mingi!”

Tozali na elikya ete Biblia oyo ekosalisa basakoli koleka 2 800 oyo balobaka monɔkɔ ya Kannada, oyo bazali kosalela Yehova na teritware ya filiale ya Inde. Ekozala mpe na ntina mingi mpo na kosalisa bato soki milio 46 oyo balobaka monɔkɔ yango na mokili mobimba, mpo bábendama na “bomɛngo ya Nzambe mpe bwanya na ye mpe boyebi na ye [oyo] ezali mingi mpenza.”​—Baroma 11:33.

Punjabi

Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika na monɔkɔ ya Punjabi ebongolamaki na bandeko motoba na boumeli ya mbula 12. Biblia yango ekosalisa bato koleka milio 100 oyo balobaka monɔkɔ yango na Inde, na bamboka mosusu ya zingazinga mpe na mokili mobimba.

Moko ya bandeko oyo babongolaki alimboli boye: “Tobongolaki yango kaka na mwa bisaleli moke oyo tozalaki na yango. Yehova asalisaki biso mingi mpo mosala yango esila. Biblia oyo ekolendisa kondima ya bandeko na biso, ekokitisa mitungisi ya mitema na bango, mpe ekosalisa bango báyika mpiko na mikakatano bakokutana na yango na mikolo ezali koya.”

Ndeko mosusu oyo azalaki na kati ya babongoli alobi boye: “Bato ya mitema sembo bakosepela kotánga Biblia oyo, mingimingi mikanda oyo ezali na maloba ya ntɔki. Bakosepela mpenza na bisaleli ya bolukiluki oyo ezali na Biblia yango.”

Biso ná bandeko na biso tozali kopesa Yehova matɔndi mpo na ‘misala na ye nyonso ya kokamwa’ mpo ezali ‘ebele koleka oyo tokoki koyebisa.’​—Nzembo 40:5.