Lakisá makambo oyo ezali na kati

Esika oyo mai etondaki na Vadodara, Gujarat, moko ya bisika oyo mai etondaki

16/08/2019
INDE

Mai ya mpela ezindisi wɛsti ya Inde

Mai ya mpela ezindisi wɛsti ya Inde

Na kotalela lapolo moko oyo epesami, mai ya mpela na Inde ebomaki bato soki 169 na wɛsti ya etúká ya Gujarat, Maharashtra, Karnataka, mpe Kerala.

Filiale ya Inde emonisi ete ata ndeko moko te abomamaki to azokaki na mpela yango. Filiale yango epesaki lapolo oyo na bosikisiki.

Gujarat: Na engumba Vadodara, basakoli 145 bakutanaki na likama yango ya mpela. Biro ya kobongola mikanda na monɔkɔ ya Gujarati, oyo ezali na Vadodara, ebebaki te.

Maharashtra: Na Mumbai, bandako ya mabota motoba ebebaki. Na engumba Sangli, oyo ezali na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 378 na sudi-wɛsti ya Mumbai, basakoli 25 balongwaki na bandako na bango mpo bakende kofanda na esika mosusu. Bandeko oyo bazali zingazinga ya engumba yango bazali kosalisa bandeko na bango.

Karnataka: Mabota motoba balongwaki na bisika na bango mpo na mpela yango. Filiale ezali na etúká yango, kasi mbula makasi mpe mpela yango esalaki yango eloko moko te.

Kerala: Mabota soki 100 bakendaki kofanda elongo na Batatoli ya Yehova mosusu mpo na mwa ntango. Komite ya kopesa lisungi ezali kotalela likambo yango.

Filiale ezali kotambwisa mosala ya kopesa lisungi na bisika oyo makama esalemi. Bakɛngɛli ya zongazonga mpe bamonisi ya departema ya kosala baplan mpe kotonga bazali kosala makasi mpo na kolandela makambo mpe kosalisa bandeko na biso oyo bakutani na makama. Yango esangisi kopesa lisalisi na mosuni, na ndakisa biloko oyo basengeli na yango, mai mpe kolendisa bango na elimo.

Tozali kobondela Yehova akoba kozala na bandeko na biso oyo bakutani na makama. Tozali kozela na mposa makasi ntango oyo “kimya mingi” ekozwa esika ya makama oyo ebimaka yango moko.​—Nzembo 37:11.