Lakisá makambo oyo ezali na kati

17/08/2018
INDE

Kobukana ya mabele ebomi bato na Sudi-wɛsti ya Inde

Kobukana ya mabele ebomi bato na Sudi-wɛsti ya Inde

Mbula makasi oyo esangani na mopɛpɛ ebɛtaki na Kerala, na Inde mpe ebukaki mabele na bisika soki 25 mpe ebomaki bato soki 75. Departema oyo epesaka bansango etali klima na Inde elobaki ete eleko ya mbula ya mipɛpɛ makasi oyo esalemi mikolo oyo na sudi-wɛsti ebɛti makasi koleka bambula oyo mipɛpɛ yango ebɛtá na esika yango.

Tozali na mawa mpo biro ya filiale ya Inde epesi biso nsango ete mwasi moko ná mobali moko oyo bazali na mbula koleka 60, oyo bazali Batatoli ya Yehova mpe moyekoli moko ya Biblia bakufaki esika oyo mabele ebukanaki mpe bayekoli mibale ya Biblia bazokaki makasi mpe bazali sikoyo na lopitalo, kasi bakómi sikoyo mwa malamu. Longola yango, ndeko na biso ya mobali ya mbula 17 atyolaki na mai ntango azalaki koluka kobikisa moto moko ya kartye na ye.

Biro ya filiale esalaki komite moko ya kopesa lisungi (DRC) mpo na koyeba makama oyo esalemi mpe ndenge ya kobongisa mosala ya kosunga bandeko. Baponaki Bandako ya Bokonzi mosusu lokola esika ya kobongisa mosala yango ya kopesa lisungi. Lapolo ya liboso oyo tozwaki mpo na bandako ya bandeko emonisi ete bandako 46 ebebaki to ebukanaki. Mabota soki 85 (ya basakoli 475) bakendaki kofanda na bandako ya bandeko ya lisangá to ya mabota na bango mpo na mwa ntango. Tozwi lapolo ete eteni mosusu ya Bandako ya Bokonzi mosusu ezindaki na mai. Komite yango ya kopesa lisungi ezali kokoba kolandela likambo yango mpo bambula mosusu ya makasi ekoki kobɛta nsima ya mikolo.

Bamonisi ya filiale elongo na mokɛngɛli ya zongazonga mpe bankulutu ya masangá bakendaki kotala bandeko oyo bazwi likama mpo na kobɔndisa bango mpe kolendisa bango na Makomami.

Tozali kokanisa mpe kobondela mpo na baoyo nyonso bazwi likama mpo na mbula makasi yango. Tozali kozela eleko oyo makama ya ndenge wana mpe mpasi oyo yango ebimisaka ekozala lisusu te.​—Emoniseli 21:3, 4.