Lakisá makambo oyo ezali na kati

28/11/2018
INDE

Mopɛpɛ makasi babengi Gaja ebɛti Inde

Mopɛpɛ makasi babengi Gaja ebɛti Inde

Na mokolo ya 16/11/2018, mopɛpɛ makasi babengi Gaja ebɛtaki na etúká ya Tamil Nadu, na sudi ya Inde. Bato soki 46 bakufaki, bato soki 250 000 bakendaki kofanda na bisika mosusu, mpe bandako koleka 85 000 ebebaki.

Ndako ya ndeko na biso moko oyo ebebaki ntango nzete ekwelaki yango na Mannargudi, na Tamil Nadu.

Filiale ya Inde elobi ete ata ndeko moko te azokaki to akufaki na mopɛpɛ yango. Kasi, bandako 38 ya bandeko na biso mpe Bandako ya Bokonzi 2 ebebaki. Filiale etyaki komite ya kopesa lisungi mpo na kotambwisa mosala yango, kokabolela bandeko oyo bazwi likama bilei mpe mai.

Tozali kobondela Yehova abɔndisa bandeko na biso oyo bazwi likama na mopɛpɛ yango na nzela ya litambwisi ya bankulutu.​—1 Petro 5:2.