Lakisá makambo oyo ezali na kati

14/1/2020
INDONÉSIE

Mpela moko monene ezindisi engumba ya Jakarta

Mpela moko monene ezindisi engumba ya Jakarta

Emonani ete bandako soki 100 ya bandeko ezindaki na mai, mpe ya bandeko mosusu kutu ezindaki tii na mɛtrɛ soki 1 na ndambo ntango mbula ya makasi mpenza ebɛtaki na engumba Jakarta, na Indonésie, na mokolo ya 31/12/2019.

Atako ndeko moko te akufaki to azwaki likama ya makasi na mpela yango, kasi basakoli mingi batikaki bandako na bango mpo na mwa ntango, mpe basusu batikalaki kaka na bandako na bango atako mpela. Lisusu, mwa bandako oyo bazalaki kosalela mpo na makita ebebaki mwa moke. Bankulutu ya engumba yango basungaki bandeko, bapesaki bango mwa biloko oyo basengelaki na yango, na ndakisa bilei mpe mai. Esukaki wana te, bakɛngɛli ya zonga-zonga mpe bayaki kotala bandeko oyo bakutanaki na likama wana mpe babɔndisaki bango na nzela ya makomami. Bakomite ya kopesa lisungi mibale etyamaki mpe ezali kolandela bamposa ya bandeko yango.

Mpela wana epekisaki te bandeko na biso kosambela Yehova, ata mabota oyo ekutanaki na likama yango ya mpela, bazalaki kosala mibembo na bisika oyo etondaki na mai mpo na koyangana na makita ya kati ya mposo. Ndeko Daniel Purnomo, oyo azali ndeko ya Komite ya filiale ya Indonésie alobi boye: “Ata soki ezalaki mpela oyo eleki monene na bampela nyonso oyo esalemá na engumba Jakarta na bambula eleki, yango elɛmbisaki kondima ya bandeko te, kutu etindaki bango bámonisa lisusu bolingo ya bokristo mpe básalisana.”

Tozali mpenza kozela na motema likoló ntango oyo mipɛpɛ mpe mbula ekomemela lisusu bato mpasi te.​—Marko 4:39.