Lakisá makambo oyo ezali na kati

21/2/2020
ISRAËL

Israël: Babimisi Makomami ya Ebre na likita moko monene

Israël: Babimisi Makomami ya Ebre na likita moko monene

Tata moko ná mwasi na ye, ná bana na bango mibale, bazali kosepela ndenge bazwi Biblia ya sika

Ndeko Geoffrey Jackson, moko ya bandeko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi, abandaki likita na maloba oyo ntango abimisaki Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami ya Ebre, na Ebre ya mikolo oyo. Alobaki: “Lisangani ya Mikóló-Bakambi ebongiseli bino likabo moko ya malamu mpenza.” Bato 2 125 bazalaki na likita yango, oyo esalemaki na mokolo ya 11/01/2020, na libándá ya Romema Arena, na Haïfa, na Israël.

Ndeko David Simozrag, oyo akambaka makambo ya bansango na filiale ya Israël, alobi boye: “Epai na biso awa bato oyo bazali koloba Ebre baleki milio 8. Tondimi mpenza ete kozwa Tanakh * na Ebre ya mikolo oyo ekosalisa bato mingi mpenza.” Biblia yango ezali na kati ya mwa Babiblia moke mpenza oyo bato bazali na yango lelo na Ebre ya mikolo oyo.

Libongoli ya Mokili ya Sika ezali sikoyo mobimba to ndambo na minɔkɔ 186. Ndenge moko na makomi ya Bamasorete, bandeko na biso oyo babongolaki Biblia basalaki makasi bákoma nsango ya Biblia na bosikisiki mpenza. Bandeko yango basalaki mbula koleka misato mpo na kosilisa Biblia yango ya Ebre na elobeli ya mikolo oyo. Moko ya babongoli alobi boye: “Bato ebele oyo batángaka Ebre bazalaki na momeseno ya kotala makanisi oyo bakomi na pembeni ya lokasa to Babiblia ya minɔkɔ mosusu mpo bákanga ntina ya bavɛrsɛ ya sikisiki to Biblia mobimba. Biblia na Ebre na elobeli ya mikolo oyo ezali kopesa bato oyo bazali kotánga yango nzela bákanga ntina ya Makomami mbala moko.”

Libota moko bazali kolakisa Biblia na bango ya sika na Ebre ya mikolo oyo

Ndeko mosusu mpe alobi ete: “Nsima ya bambula ebele mpenza oyo motángi oyo atánga kelasi mingi te azalaki na likoki ya kokanga ntina ya Tanakh te, akoki sikoyo kokanga ntina ya nsango malamu polele mpe na bosikisiki.” Na ntembe te, basakoli 603 oyo balobaka Ebre na kati ya basakoli koleka 2 000 oyo bazali na filiale ya Israël, bakosalela likabo malamu oyo mpo na “koyekola mobeko ya Yehova mpe kosalela yango.”​—Ezera 7:10.

^ par. 3 Tanakh ezali ebengeli ya mokuse oyo ezali komonisa biteni misato ya Makomami ya Ebre oyo ekabolami boye: Torah (Mobeko), Neviim (Basakoli) mpe Ketuvim (Makomi). Biblia oyo ebimi na Ebre ya mikolo oyo elandi mpe molɔngɔ wana.