Lakisá makambo oyo ezali na kati

Bolɔkɔ ya kala ya Gaète, na Italie, epai bandeko na biso mosusu bakangamaki mpo na kondima na bango

09/7/2020
ITALIE

Italie: Ndenge makambo ya Batatoli ya Yehova esalaki ete bakonzi bátya mobeko oyo endimi kotosa lisosoli ya moto oyo aboyi mosala ya soda

Italie: Ndenge makambo ya Batatoli ya Yehova esalaki ete bakonzi bátya mobeko oyo endimi kotosa lisosoli ya moto oyo aboyi mosala ya soda

Ndenge moko na bamboka mingi lelo oyo, Italie endimi kotosa lotomo oyo bana-mboka bazali na yango ya koboya mosala ya soda mpo na makambo ya losambo na bango. Kasi liboso ezalaki boye te. Soki lelo oyo Italie endimi kopesa bato lotomo yango, ezali mingimingi mpo na mpasi makasi oyo banyokolaki Batatoli ya Yehova.

Mbula koleka zomi nsima ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, Italie etyaki mobeko moko oyo ezalaki kosɛnga ete mwana mobali nyonso akende mosala ya soda. Nsima ya etumba yango, na 1946, na Italie mobimba, Batatoli ya Yehova bazalaki kaka 120. Kasi na nsima, bato ebele bakómaki Batatoli ya Yehova. Na yango, ekómaki mpe na bilenge mibale ebele oyo bazalaki Batatoli ya Yehova oyo bazalaki koboya mosala ya soda. Bazwaki ekateli wana mpo bazalaki na kondima makasi mpenza na mibeko ya Biblia oyo emonisi ete bakristo basengeli kokɔta na makambo ya politiki te, basengeli koboya bitumba ná mobulu, mpe kolinga bato.

Kala mingi te awa, filiale ya Italie esalaki ankɛti moko, emonaki ete bandeko mibali koleka 14 180, oyo bazali naino na bomoi, bakɔtaki bolɔkɔ mpo baboyaki kokɔta na mosala ya soda. Soki tosangisi mbula nyonso oyo bandeko yango basalaki na bolɔkɔ ekosala mbula 9 732, mingi na bango bakɔtaki bolɔkɔ kati na bambula ya 1960 mpe na nsuka ya bambula ya 1990.

Sergio Albesano, moto moko ya istware na engumba Turin, na Italie, oyo amipesaki na makambo ya bato oyo baboyaka mosala ya soda, alobi ete: “Batatoli ya Yehova nde balekaki ebele na kati na ebele ya bilenge oyo bakɔtaki bolɔkɔ mpo baboyaki mosala ya soda.” Abakisi mpe ete, lokola bilenge yango bazalaki na kondima makasi, yango “esalisaki ete bato nyonso báyeba likambo yango.”

Ntango Giulio Andreotti, ministre-mokonzi ya kala ya Italie, azalaki ministre ya défense na bambula ya 1960, azwaki ekateli ete ye moko akutana na Batatoli mosusu oyo bazalaki na bolɔkɔ mpo ayeba ntina oyo bango bazali koboya kosala mosala ya soda. Na nsima akomaki boye: “Nakamwaki ntango nayebaki ete bakangamaka makasi na mateya ya lingomba na bango mpe bakɔtisaka ata moke te na makambo ya politiki; ezalaki kaka mpamba te nde bazalaki koboya mpenza kokɔta na mosala ya soda mpe bazalaki na likoki ya koyika mpiko na bolɔkɔ bambula ebele.”

Mobeko ya liboso oyo epesaki nzela ete mwana-mboka akoki koboya mosala ya soda mpo na lisososli na ye endimamaki na 1972. Likambo ya mawa ezalaki ete, atako mobeko epesaki nzela na kosala mosala mosusu na esika ya mosala ya soda, mobeko yango ezalaki kaka na mabɔkɔ ya basoda, bandeko na biso bandimaki likambo wana te.

Nsukansuka, na mokolo ya 08/07/1998, guvɛrnema ya Italie ezwaki mobeko ya sika oyo endimaki kosala mosala mosusu na esika ya mosala ya soda oyo ezalaki na mabɔkɔ ya basoda te, mpe Batatoli ya Yehova bandimaki yango. Na sanza ya 08/2004, Italie etyaki mobeko ya sika oyo eboyaki ete bana mibali bákendeke mosala ya soda na makasi, mobeko yango ya sika esengelaki kobanda kotosama na sanza ya 01/2005.

Na kati ya bato ya mayele oyo balobi ete makambo ebongwani na Italie ndenge wana na lisalisi ya Batatoli ya Yehova, tokoki kotánga Sergio Lariccia, azali avoka mpe profesɛrɛ ya kala na Inivɛrsite Sapienza na Rome. Alobi boye: “Na ntango ya kala, basango ya basoda bazalaki koloba ete koboya kokɔta na mosala ya soda ezali ‘kofinga ekólo, likambo ya mosala ya soda ezali na boyokani moko te na mobeko ya bakristo oyo esɛngi kolingana, mpe yango ezali komonisa ete moto azali na bibangabanga.’ Kasi Batatoli ya Yehova bakangamaki kaka na ekateli na bango, yango esalaki ete mibeko mpe makanisi ya bato ebongwana na Italie.”

Ekateli ya bandeko na biso esukaki te kaka na kobongola mibeko na Italie. Bakɛngɛli ya bolɔkɔ ebele bakómaki Batatoli ya Yehova nsima ya kotala bizaleli ya Batatoli epai ya bato mosusu ya bolɔkɔ. Moko na bango ezali, Giuseppe Serra, amikundoli boye: “Ndakisa ya bilenge Batatoli wana etindaki ngai . . . nabanda koyekola Biblia.” Akómaki Motatoli ya Yehova na mobu 1972. (Talá etanda oyo ezali awa na nse.)

Tozali kosepela na ndakisa ya mpiko oyo bandeko ya Italie ná mabota na bango batikelá biso na boumeli ya bambula ebele, ndenge moko na bandeko na biso na mokili mobimba, oyo bazwaka na lisɛki te etinda ya ‘koyekola etumba lisusu te.’​—Yisaya 2:4.