Lakisá makambo oyo ezali na kati

Tribinale monene (Cour d’appel) na Rome

07/02/2020
ITALIE

Tribinale monene ya Rome (Cour d’appel) endimi lotomo ya baboti ya kopona ete bana na bango bázwa lisalisi ya monganga kasi bátya bango makila te

Tribinale monene ya Rome (Cour d’appel) endimi lotomo ya baboti ya kopona ete bana na bango bázwa lisalisi ya monganga kasi bátya bango makila te

Na mokolo ya 17/12/2019, tribinale monene ya Rome ebongolaki ekateli oyo tribinale ya bana na Rome ezwaki. Tribinale ya bana na Rome ezwaki ekateli ete bábɔtɔla ndeko mwasi mwana mpo apesaki te minganga nzela bázongisa mwana na ye makila. Tribinale monene esukaki kaka te na kozongisela ndeko mwasi wana mwana na ye, kasi elobaki mpe ete ndeko mwasi yango asali mabe moko te. Ekateli yango ekosalisa mpe ntango makambo ya ndenge wana ebimi lisusu; ekosalisa mpo bábɔtɔla Batatoli ya Yehova bana na bango lisusu te mpo baboyi ete minganga bázongisa bango makila.

Likambo yango ebandaki ntango ndeko mwasi moko ná mwana na ye ya mobali ya mbula 10 bazwaki likama na motuka. Mwana yango azokaki mpe bamemaki ye na lopitalo. Nsima ya mikolo misato, minganga bamonaki malamu básala mwana yango lipaso. Ndeko na biso andimaki ete minganga básala mwana na ye lipaso, mpe bápesa ye nkisi mosusu nyonso oyo asengeli na yango, kasi alimbwelaki bango ete akolinga te ete bátya mwana na ye makila. Atako mwana asilaki makila te, lopitalo efundaki ndeko mwasi epai ya prokirɛrɛ. Balobaki ete ndeko mwasi yango azali kokipe mwana na ye te mpo na makambo ya losambo na ye. Yango wana, lopitalo esɛngaki prokirɛrɛ apesa minganga ndingisa ya kotya mwana wana makila soki esengeli. Prokirɛrɛ yango afundaki ndeko na biso ete azali koluka bolamu ya mwana te, mpe asɛngaki tribinale ya bana ete bábɔtɔla ndeko na biso lotomo oyo moboti azalaka na yango ya kozwela mwana bikateli. Tribinale yango ya bana esalaki likambo oyo prokirɛrɛ asɛngaki bango atako mobeko epesi tribinale wana nzela te ya kozwa ekateli ya ndenge wana. Yango wana, ndeko na biso akendaki kofunda likambo yango na tribinale monene.

Tribinale monene elobaki ete ndeko na biso azali mama malamu mpenza oyo ayebi kobatela mwana na ye. Tribinale yango elobaki boye: “Ezali malamu te koloba ete azali kobatela mwana te kaka mpo alandi makambo ya lingomba na ye mpe aboyi ete minganga bátya mwana na ye makila.” Tribinale yango ezongiselaki ndeko mwasi mwana na ye mpe elobaki ete tribinale ya bana ebukaki mobeko ndenge ezwaki ekateli ya kobɔtɔla ye mwana.

Nicola Colaianni, oyo kala azalaki avoka na Cour de cassation mpe profesɛrɛ ya mibeko ya lingomba na Iniversite ya Bari alobi boye: “Nandimi ekateli ya Tribinale monene. Nayoki mabe mpenza na bikateli lokola oyo tribinale ya bana ezwaki. Emonani polele ete ezali mpasi makasi mpo bato mingi bázwa bonsomi ya solosolo na makambo ya lingomba, ezali lisusu mpasi mingi koleka mpo na Batatoli ya Yehova.”

Ndeko Christian Di Blasio, oyo akambaka biro ya bansango na filiale ya Italie, alobi boye: “Topesi Tribinale monene matɔndi ndenge elongolaki ekateli oyo ezwamaki na kolanda makanisi mabe oyo bazwelaka lingomba. Batatoli ya Yehova babatelaka bana na bango malamu mpenza mpe bazalaka na botɔndi epai ya minganga mingi oyo basalisaka bango malamu wana bazali mpe kotosa lisosoli na bango oyo eteyami na Biblia.”

Tribinale monene emonisi polele ete bandeko na biso bazali na lotomo ya kozwela bana na bango bikateli na likambo etali lisalisi ya monganga. Tozali kopesa Yehova, Nzambe na biso, matɔndi, mpo na elonga oyo, yango ekosalisa bandeko ntango bakozwa bikateli na likambo ya kosalisa bana epai ya minganga na ndenge oyo ekobebisa te lisosoli na bango oyo eteyami na Biblia.​—Nzembo 37:28.