23 SANZA YA 5, 2018
ITALIE
Likita monene na iniversite ya Padua mpo na kolobela milende oyo esalemi mpo na kopesa lisalisi ya monganga kozanga kozongisa makila
ROME—Na mokolo ya mitano, 24/11/2017, minganga, bato oyo balandelaka mibeko ya mosala ya monganga mpe bato ya mibeko bayanganaki na likita na iniversite ya Padua; iniversite ya mibale oyo eumeli mingi na Italie. Motó ya likambo ya likita yango elobaki: “Soki moto ya maladi oyo azali mokóló aboyi bázongisa ye makila: Mayele nini minganga bakoki kosalela?—Kobatela makila 2017.” Bakompanyi 25 ya makambo etali siansi mpe masangá mosusu ya bato nde ebimisaki mbongo mpo na kobongisa likita yango elongo na Ministère ya sante na Italie.
Eyebani ete kozongisa makila ezalaka mabe te mpe kaka yango nde solisyo mpo na kobikisa moto oyo azali maladi makasi to oyo balingi kosala ye lipaso ya monene. Mingi ya baoyo basalaki badiskur na likita yango baboyaki likanisi yango. Doktɛrɛ Luca Weltert, moko ya bato ya mayele oyo babengisaki na likita yango mpe asalaka lipaso ya ntolo na lopitalo ya Mpoto na ekólo Rome; alobaki boye: “Tomoni lelo ete kozongisa makila ekoki kozala mabe mpenza mpe na mabaku mingi esɛngaka te kozongisa makila.”
Doktɛrɛ Weltert mpe minganga mosusu oyo bazalaki na likita yango balobaki bongo na kotalela eksperiansi oyo bazwi na mosala na bango ná bilembeteli oyo boyekoli ya siansi epesi, oyo emonisi ete kozongisa makila nde ezali komatisa motángo ya bato oyo bazali kokufa mpe kobɛla, ezali kosala ete moto aumela mingi na lopitalo mpe ezali kobimisela baoyo bazongisi bango makila bamaladi mosusu ya minene. *
“Tomoni lelo ete kozongisa makila ekoki kozala mabe mpenza mpe na mabaku mingi esɛngaka te kozongisa makila.”—Doktɛrɛ Luca Weltert, asalaka lipaso ya ntolo na lopitalo ya Mpoto, na Rome
Bilembeteli wana ya siansi bakisá mpe ndenge kozongisa makila esɛngaka mbongo mingi, esalaki ete na 2010 OMS emona ntina ya kosalela mayele ya kobatela malamu makila ya moto ya maladi (Gestion du sang du patient (GSP))—lolenge ya lisalisi oyo esɛngaka kosangisa mayele ndenge na ndenge ya monganga, kokipe likambo nyonso etali sante ya moto ya maladi mpe libateli na ye, mpe kosala ete lipaso esalema na ndenge oyo ekobimisa mbuma malamu koleka, mpe esalelaka mpenza makila te mpo na kozongisa moto. OMS ebimisaki mobeko moko oyo esɛngaki bikólo nyonso 193 ya ONU esalela mayele ya GSP.
Profesɛrɛ Stefania Vaglio, mokambi na lopitalo ya iniversite ya Sant’Andrea na Rome, na likambo etali kozongisa makila, alobelaki na molai mayele yango ya sika ya GSP; amonisaki ete liboso, minganga bayebaki kaka kosalela makila oyo moto apesi mpe kozongisa yango moto mosusu, kasi sikoyo “balongoli likebi na bango na makila oyo bato mosusu bapesaka mpo na kozongisa bato ya maladi, bakómi nde kotya likebi na makila ya bato ya maladi.” Ntina moko oyo baponi kosalela mayele ya GSP ezali mpo “moto ya maladi nde azwi esika ya liboso na teknike yango oyo ezali kosala ete abungisa makila mingi te, . . . bátyela ye likebi mpe básala nyonso oyo esengeli mpo na kobatela makila ya moto ya maladi.” Profesɛrɛ Vaglio amonisaki mpe polele ete teknike ya kobatela malamu makila ya moto ya maladi “ezali mpenza lisalisi ya malamu mingi.”
Doktɛrɛ Tommaso Campagnaro, monganga ya lipaso na lopitalo ya iniversite ya Vérone, amonisaki mpe matomba ya kosalela mayele yango mpo na koboya kozongisa makila. Nsima ya kobakisa makambo oyo ezangaki na ankɛtɛ oyo esalemaki na bambula ya 1990, mpo na bato ya maladi oyo basalaki bango lipaso ya monene na libumu, alobaki na nsuka boye: “Bato ya maladi oyo bazongisaki bango makila te bazalaki na mindɔndɔ mingi te mpe bakufaki mingi te soki tokokanisa bango na baoyo bazongisaki bango makila.”
“Bato ya maladi oyo bazongisaki bango makila te bazalaki na mindɔndɔ mingi te mpe bakufaki mingi te soki tokokanisa bango na baoyo bazongisaki bango makila.”—Doktɛrɛ Tommaso Campagnaro, monganga ya lipaso na lopitalo ya iniversite ya Vérone
Doktɛrɛ Campagnaro, elongo na bato mosusu oyo basalaki badiskur na likita yango bapesaki Batatoli ya Yehova mersi na miso ya bato nyonso ndenge basalaki ete minganga báluka kokolisa mayele ya kosalela bateknike mosusu na esika ya kozongisa bato makila. Anna Aprile, profesɛrɛ moko ya mibeko ya monganga na iniversite Padua, alobaki boye: “Topesi Batatoli ya Yehova mersi mpo bango nde babimisaki likambo ya lotomo ya koboya bázongisa bango makila, yango esalisi moto nyonso akanisa malamu na likambo yango mpe ayeba ndenge ya kosala mpo na kotika kosalela mingi makila.”
“Topesi Batatoli ya Yehova mersi mpo bango nde babimisaki likambo ya kozala na lotomo ya koboya bázongisa bango makila . . .”—Anna Aprile, profesɛrɛ moko ya mibeko ya monganga na iniversite Padua
Baoyo basalaki badiskur na likita yango bamonisaki minganga ndenge na ndenge, na ndakisa minganga oyo bapesaka ntonga ya kolalisa moto mpɔngi na ntango ya lipaso, minganga ya bamaladi ya motema, bamaladi ya basi, bamaladi ya makila, bamaladi ya kanser mpe bamaladi ya mikuwa. Kasi, nsango oyo bango nyonso bapesaki ezalaki kaka moko: Balopitalo mpe bibongiseli etali makambo ya minganga, basali-mibeko mpe bato nyonso basengeli kondima mayele ya GSP na kotalela ebele ya makambo oyo baankɛtɛ emonisi mpe eksperiansi ya bato ya mayele na likambo yango.
Doktɛrɛ Weltert abakisi boye: “Kosala lipaso na mosisa oyo eyambaka makila na motema mpo na kotinda yango na nzoto mobimba ezali mpasi koleka lipaso nyonso oyo okoki kosala na nzoto ya moto. . . . soki [yango] ekoki kosalama kozanga kozongisa moto makila, boye ekoki mpe kozala bongo mpo na lipaso mosusu nyonso.”
^ par. 4 Na ndakisa, ankɛtɛ oyo euti kosalema na wɛsti ya Australie mpe oyo babimisaki yango na zulunalo moko ya minganga oyo elobelaka kozongisa makila, Transfusion, balobelaki yango na likita yango. Baoyo basalaki ankɛtɛ yango balobeli litomba oyo emonani nsima ya mbula motoba ya kotya programɛ mobimba ya GSP. Batalelaki makambo ya bato ya maladi 605 046 oyo bayambaki bango na balopitalo ya minene. Na eleko ya ankɛtɛ yango kosalela bankisi oyo esalemi na makila ekitaki na 41%. Kaka na eleko yango, motángo ya bato ya maladi oyo bakufaka na lopitalo ekitaki na 28%, mpe bato moke kaka 15% nde bazalaki koumela na lopitalo, bamikrobe oyo ezwaka bato ya maladi na lopitalo ekitaki na 21% mpe motángo ya baoyo basalaka AVC to motema etikaka kosala ekitaki na 31%. Balobi ete programɛ yango ya GSP nde esalisi mingi bato ya maladi, esali ete minganga básalela mingi te bankisi oyo esalemi na makila mpe mbongo oyo ebimaka mpo na bankisi yango ebatelama.