Lakisá makambo oyo ezali na kati

23 SANZA YA 1, 2017
ITALIE

Ebele ya nɛjɛ ebimisi likama na Italie

Ebele ya nɛjɛ ebimisi likama na Italie

Na mokolo ya 18/01/2017, na etúká ya Abruzzo, na Italie ya ntei, ebele ya nɛjɛ ekweaki na otɛlɛ moko oyo ezalaki na bato koleka 30 na kati. Nzokande, mabele eninganaki makasi na sanza ya mwambe oyo eleki, kaka na etúká yango. Nsima ya koningana ya mabele minei ya makasi (magnitude koleka 5.0) na etúká yango oyo esalemaki kaka na mokolo moko nde likama ya ebele ya nɛjɛ eyaki kobima. Lokola ebele mpenza ya nɛjɛ etondaki na esika yango pɔsɔ eleki, yango ezali kopesa mpasi na baoyo bazali kosala mosala ya kobikisa bato. Bingumba mingi ezangi kura mpe kokende kuna ekómi mpasi.

Biro ya filiale ya Batatoli ya Yehova na Italie eyebisi biso ete atako Motatoli ya Yehova moko te azwi likama to azoki makasi, bazali kosala milende mpo na kokende bisika oyo mabota ya Batatoli ya Yehova ekweli mpenza likama ya koningana ya mabele mpe nɛjɛ. Bankulutu oyo bazali na esika yango bazali kopesa bilei, mai, nkoni mpo na mɔtɔ mpe biloko mosusu ya ntina. Biro ya filiale ezali kokoba kolandela makambo yango mpe kopesa lisungi mosusu soki esengeli.

Moto oyo bapanzi-nsango bakoki kobenga:

Mpo na mokili mobimba: David Semonian, Biro ya kozwa bansango, +1-845-524-3000

Italie: Christian Di Blasio, +39-06-872941