Lakisá makambo oyo ezali na kati

17/09/2019
JAPON

Mopɛpɛ moko makasi na nkombo Faxai ebɛti Japon

Mopɛpɛ moko makasi na nkombo Faxai ebɛti Japon

Na mokolo ya 09/09/2019, Mopɛpɛ moko makasi na nkombo Faxai esalaki ete mabele ebukana pene na Tokyo, Japon. Mopɛpɛ yango etambolaki tii na kilomɛtrɛ 180 na ngonga moko mpe esalaki ete bandako 580 000 ezanga kura. Bato soki misato bakufaki na likama yango.

Filiale ya Japon elobi ete ata mosakoli moko te akufaki, kasi bandeko basi mpe mibale soki nsambo bazokaki mpenza. Lapolo ya liboso emonisi ete mopɛpɛ wana makasi ebebisaki bandako 895 ya bandeko na biso, Bandako ya Bokonzi 28, mpe Ndako ya liyangani oyo ezali na Chiba.

Filiale ezali kokoba kolandela ndenge oyo mopɛpɛ wana na nkombo Faxai ebimiseli bandeko na biso makama. Tozali kobondela ete Yehova, “Nzambe oyo apesaka ezaleli ya koyika mpiko mpe libɔndisi,” akoba kosunga bandeko na biso oyo bakutani na likama oyo.​—Baroma 15:5.