Lakisá makambo oyo ezali na kati

Mbonge ya mopɛpɛ esalemi pene na nzela na sudi-wɛsti ya Japon

10/10/2019
JAPON

Mopɛpɛ ya makasi babengi Tapah ebɛti sudi ya Japon

Mopɛpɛ ya makasi babengi Tapah ebɛti sudi ya Japon

Kobanda mokolo ya 21 tii ya 23/09/2019, mopɛpɛ ya makasi babengi Tapah ebɛtaki sudi ya Japon, ezalaki mbula mpe mopɛpɛ moko ya makasi mpenza. Mopɛpɛ yango esalaki ete mpɛpɔ mpe engbunduka esala te mibembo na yango, mpe kura ekatanaki na bandako koleka 30 000. Na Okinawa mpe Kyushu, bato koleka 50 bazokaki.

Filiale ya Japon elobi ete basakoli mitano bazokaki, mpe bamemaki ndeko mwasi moko na lopitalo. Bandako koleka 50 ya bandeko na biso ebebaki makasi. Komite ya kopesa lisungi mpe bandeko oyo bazali na mikumba bazali kosalisa bandeko na mosuni mpe na elimo. Filiale ya Japon ekokoba kolandela makambo yango mpe kopesa lisungi soki esengeli.

Tozali kobondela mpo bandeko na biso na Japon bákoba kotyela Yehova motema mpo abɔndisa bango na ntango wana ya mpasi.​—Nzembo 94:19.