Lakisá makambo oyo ezali na kati

12/7/2018
JAPON

Mbula makasi ebɛtaki na wɛsti ya Japon

Mbula makasi ebɛtaki na wɛsti ya Japon

Mbula makasi oyo ebɛtaki na wɛsti ya Japon mpe ebukaki mabele, ebomaki bato soki 169 mpe tii sikoyo bandako koleka 255 000 ezali na mai te.

Atako Motatoli ya Yehova moko te akufaki na likama yango, bandeko 200 balongwaki na esika yango mpe ndeko mwasi moko azokaki. Ndeko mwasi yango azwaki lisalisi ya monganga na opitale moko mpe sikoyo abandi koyoka malamu. Bandako soki 103 ya bandeko ebebaki mpe moko ebukanaki nyonso. Mai ya mbula yango ebebisaki mpe Bandako ya Bokonzi 11 ná ndako moko ya mayangani.

Komite minei ya kopesa lisungi na ntango ya likama (DRCs) esalemaki mpo na kobɔndisa mpe kolendisa na elimo bandeko oyo bazwaki likama; kopesa bango mpe biloko oyo basengeli na yango; na ndakisa bilei, bilamba mpe mai ya pɛto. Bakomite yango ekokoba mpe kobongisa ndenge ya kosunga bandeko yango na boumeli ya ntango, misala yango ekosɛnga kotya bopɛto, koboma mikrobe mpe kobongisa bandako ya bandeko na biso oyo ebebaki.

Tozali kobondela mpo na bandeko na biso oyo bazwi likama wana na Japon, mpe tozali kozela ntango oyo Yesu akosalela nguya na ye mpo na kolongola makama nyonso na mabele mpo na libela.​—Matai 8:26, 27.