Lakisá makambo oyo ezali na kati

6/6/2018
KAZAKHSTAN

Mikolo 441 ya bolɔkɔ​—Mituna-lisolo elongo na Teymur ná Mafiza Akhmedov

Mikolo 441 ya bolɔkɔ​—Mituna-lisolo elongo na Teymur ná Mafiza Akhmedov

Nsima ya bolimbisi ya Prezida Nursultan Nazarbayev ya Kazakhstan, babimisaki ndeko Teymur Akhmedov na bolɔkɔ na mokolo ya 4/04/2018. Alekisaki mikolo 441 na bolɔkɔ. Bakonzi bakangaki ye kaka mpo azalaki koyebisa basusu mateya ya Nzambe.

Mwa moke nsima ya kobima ya Teymur na bolɔkɔ, Biro ya kozwa bansango (OPI) oyo ezali na Biro monene ya Batatoli ya Yehova na Warwick, New York, esololaki na Teymur ná mwasi na ye, Mafiza, oyo bazongi sikoyo na ndako na bango na Astana, engumba mokonzi ya Kazakhstan. Oyo ezali na mokuse makambo tosololaki na bango ndenge tokomi yango mpo ezala polele.

OPI: Liboso tóbanda, tokolinga koyeba makambo mosusu etali yo, ndeko Akhmedov. Ntango nini okómaki Motatoli ya Yehova?

Teymur Akhmedov: Nazwaki batisimo mokolo ya 9/10/2005. Liboso nayekola solo, nazalaki kondima te ete Nzambe azalaka. Na boumeli ya bambula ebele nazalaki kondimela nzambe to lingomba moko te. Na nsima, ntango mwasi na ngai akómaki koyekola Biblia, nalukaki koyeba masolo nini asololaka na Batatoli ya Yehova. Nazalaki kobatama na nsima ya porte mpo na koyoka masolo na bango.

Ntango nayebaki makambo bazalaki koyekola na ye, nasepelaki na yango mpo bazalaki kolobela kaka makambo ya malamu mpe ya boboto. Nsukansuka, balakisaki ngai ndeko Veslav, oyo azalaki moto ya Pologne kasi azalaki kofanda na Kazakhstan. Na lisolo na biso ya mbala ya liboso, nayebisaki ye: ‘Nakotuna yo kaka motuna moko. Soki nasepeli na eyano na yo, tokokóma baninga mpe tokokoba masolo na biso. Kasi, soki nasepeli na eyano na yo te nakosilikela yo te, yo mpe kosilikela ngai te mpo nakokata masolo ná yo.’ Na nsima, natunaki ndeko Veslav nini ekómaka soki moto akufi. Afungolaki Biblia na Mosakoli 9:5 mpe alobaki, ‘Tángá vɛrsɛ oyo mpe okoyeba nini ekómelaka bango.’ Ntango natángaki vɛrsɛ yango, namonaki ete ezalaki solo. Nandimaki kokutana na ye lisusu mpe koyekola Biblia.

Boye, oyekolaki Biblia mpe nsukansuka ozwaki batisimo na 2005.

Sikoyo tólobela makambo oyo elekaki liboso bákanga yo. Na sanza ya 05/2016, okutanaki na etuluku ya mibali moko oyo balobaki ete basepelaka na mateya ya Batatoli ya Yehova. Na boumeli ya basanza moke, okutanaki na bango mbala ebele mpo na kosolola makambo ya Biblia. Soki okanisi mpenza, ezalaki na likambo moko oyo balobaki to basalaki oyo omonaki ete ebongaki te?

TA: Ɛɛ, nayebisaki bango ete tosalaka boyekoli ya Biblia lokola oyo elongo na moto ye moko kasi te elongo na etuluku ya bato. Nasɛngaki bango moto na moto ayekolaka na ngala na ye, kasi mbala nyonso oyo nazalaki koyebisa bango bongo, bazalaki koboya mpe koloba ete basepelaka kosolola na etuluku. Longola yango, na mabaku mwa mingi bazalaki kobengisa bato mosusu na boyekoli yango mpe bazalaki koyebisa ngai nazongela makambo oyo tosololaki na mbala eleki.

Mafiza Akhmedov: Mokolo moko, nakendaki mpe mpo na kolanda boyekoli na bango ya Biblia. Namonaki ete bazalaki kolobela mangomba ndenge na ndenge, atako eumelaki banda bakómaki koyekola. Namonaki mpe ete apartema oyo bazalaki kofanda ezalaki ya ntalo mingi mpe bana mingi ya iniversite bazalaki te na likoki ya kofutela apartema ya bongo. Nalobaki na bango ete bazalaki na biloko mingi ya ntalo koleka baninga na bango mosusu. Maloba na ngai ebangisaki bango. Ntango tozalaki kobima mpo na kozonga, babendaki Teymur pembeni mpe ntango nazalaki kozela ye na libándá, bayebisaki ye amema ngai lisusu te na boyekoli na bango.

Ntango nini oyebaki ete bato oyo ozalaki koyekola na bango Biblia bazalaki te kosepela na Batatoli ya Yehova kasi bazalaki nde kosala elongo na Bapolisi ya sireté ya Kazakhstan, (KNB)?

TA: Nayaki koyeba ete bazalaki kosala elongo na bapolisi yango kaka na ntango ya kosamba na tribinale.

Okanisaki nini ntango bakangaki yo mpe na nsima bafundaki yo ete “ozali kotinda mangomba eyinana” mpe ozali koteya ete lingomba na bino nde eleki malamu”?

TA: Mpo na koloba solo, ntango bakangaki ngai, nakanisaki ete bakomema ngai na biro ya polisi ndenge balobaki mpo namonisa bango polele likambo nasalaki mpe na nsima bakotika ngai. Namibongisaki mpo na komilongisa mpe koyebisa bango makambo oyo tosololaki na bato yango.

Nakamwaki ndenge makambo ebalukaki, kasi nazalaki kobanga te. Kofunda ngai ete nazalaki kotinda mangomba eyinana mpe nalekisaki ndelo na makambo ya losambo na ngai ekamwisaki ngai mpenza. Batatoli ya Yehova bayebisaka basusu makambo oyo bayebi mpo na Yehova mpe batindaka bato te báyinana to bákabwana. Namindimisaki mpenza ete nasali mabe moko te mpe Yehova akosundola ngai te. Ezali solo ete namitungisaki kasi nakanisaki toli oyo ya Biblia, ‘bóbwakela [Yehova] mitungisi na bino nyonso mpo atyelaka bino likebi.”​—1 Petro 5:7.

Na nsima, na mokolo ya 2/05/2017, nsima ya kosala sanza koleka misato na kasho, tribinale ya etúká ya Astana ekatelaki yo bolɔkɔ ya mbula mitano mpe elobaki ete mbula misato mobimba okozala na ndingisa te ya kosala mosala na yo ya koteya bato Biblia. Ekateli yango esalaki yo nini?

TA: Ntango tribinale emonisaki ekateli yango, nandimaki ete nakosala mbula mitano na bolɔkɔ soki esengeli. Namilobelaki boye: ‘Soki ezali komekama, boye Yehova ayebi soki ekoumela ntango boni mpe ntango oyo ekosuka.’ Nazalaki na ekateli ya kozela tii ntango yango ekokoka.

Kasho ya engumba Pavlodar, Kazakhstan, esika ndeko Akhmedov akɔtaki bolɔkɔ.

Kasi, toyebi ete na ntango oyo ozalaki na bolɔkɔ, ozalaki kobundana na maladi moko ya mabe. Ezali bongo?

TA: Ɛɛ, nazalaki kobɛla mpe kozwa lisalisi ya monganga liboso bákɔtisa ngai bolɔkɔ. Ntango bakangaki ngai, lisalisi ya monganga oyo nazalaki kozwa ekatanaki mpe maladi na ngai ekómaki kokola.

Mafiza, omiyokaki ndenge nini na ntango yango?

MA: Ebangisaki ngai makasi mpe nakómaki komitungisa mpenza. Ezalaki kutu mpasi nazwa bikateli ntango Teymur azalaki na bolɔkɔ mpo ezalaki mbala ya liboso nsima ya mbula 38 oyo tosalaki na libala tókabwana ndenge wana. Kasi Teymur abɔndisaki ngai na maloba oyo: ‘Komitungisa te! Yehova akopesa biso mbula 25 mosusu na esika ya mbula 5 oyo; ata na mokili oyo!’

Likambo nini mosusu esalisaki yo ntango mobali na yo azalaki na bolɔkɔ?

MA: Bandeko ya lisangá basalisaki ngai mpenza. Mpo na koloba solo, nakanisaki ete lokola Teymur akɔti bolɔkɔ, moto nyonso akobanga koya kotala ngai na ndako mpo na makambo oyo esalaki ete bákanga Teymur. Polisi ya sireté ezalaki kokɛngɛla ndako mpe misala na biso.

Na nsima, mokolo moko nkulutu moko ná mwasi na ye bayaki kotala ngai mpe yango elendisaki ngai mpenza. Ntango natunaki bango, ‘Bobangi te koya awa?’ Balobaki, ‘Mpo na nini tóbanga? Na mikolo na biso, bakonzi bakoki kolandela biso ata na batelefone na biso. Boye soki balingi, bakoki komona biso na pɛtɛɛ nyonso.’

Na vizite moko, bankulutu balendisaki ngai naboya kotikela komekama yango nzela mpe nazala makasi na elimo.

Teymur, nini esalisaki yo oyika mpiko na komekama oyo mpe obatela makanisi malamu?

Ndeko Akhmedov na mbeto ya opitale na minɔti mwa moke liboso bábimisa ye na bolɔkɔ. Atako liboso baboyaki azwa lisalisi ya monganga, na nsima bakonzi bapesaki nzela ntango bamonaki ete maladi na ye ekómaki makasi mpenza.

TA: Kobondela Yehova! Mikolo nyonso nazalaki kobondela mpo na kosɛnga litambwisi, bososoli mpe makasi mpo nabungisa esengo mpe bosembo na ngai te na boumeli ya ntango wana ya mpasi. Namonaki polele biyano na ye na mabondeli na ngai. Asalisaki ngai mpenza mpe namiyokaki te ete nazali ngai moko na bolɔkɔ.

Botángi ya Biblia mpe esalisaki ngai. Na bolɔkɔ moko, nazalaki ntango nyonso na Biblia. Na bolɔkɔ mosusu, batyaki Biblia na bibliotɛkɛ ya bolɔkɔ mpe nazalaki kokende kuna mpo na kotánga yango mbala moko na pɔsɔ.

Nabosanaki mpe te maloba ya ndeko oyo ayekolaki na ngai Biblia. Mbala mingi azalaki koloba tosengeli kobanga te mikakatano oyo tokutanaka na yango. Nazali koyeba lisusu ndenge nazalaki kotuna ye: ‘Mpo na nini nasengeli kobanga te? Bongo soki mokakatano yango ezali mpasi mpe ezali kobangisa?’ Alobaki ete Yehova akotika te ete tómekama koleka oyo tokoki kokangela motema mpe akopesa biso makasi ya kolonga komekama ya ndenge nyonso. (1 Bakorinti 10:13) Yango wana, ntango nazalaki na bolɔkɔ nabosanaki te likanisi ya vɛrsɛ yango.

Omiyokaki ndenge nini ntango oyebaki ete bandeko na mokili mobimba bayebaki likambo na yo mpe bazalaki kobondela mpo na yo?

TA: Namiyokaki mpenza ete Yehova azalaki kosunga ngai mpo ebongiseli na biso ezali ya ye. Yango endimisaki ngai ete nakosundolama te mpe mokolo mosusu Yehova akobikisa ngai.

Likambo ya kokamwa, bolɔkɔ nde ezalaki kobangisa ngai makasi. Ntango nazalaki kotánga masolo ya bandeko oyo bazalaki na bolɔkɔ, nazalaki kobondela boye, ‘Yehova pardɔ, nakondima eloko mosusu, kasi bolɔkɔ te!’ Kasi nazalaki mpe na mposa makasi ya kokende kotala bato ya bolɔkɔ mpo na koteya bango solo. Ntango natunaki bandeko soki tokoki kokende kosakola na bolɔkɔ, bayebisaki ngai ete na ntango wana tozalaki naino na ndingisa te ya kokende na babolɔkɔ ya Kazakhstan. Na yango, liboso nakɔta bolɔkɔ, nazalaki kobanga kasi namonaki mpe ete mposa na ngai ya kosakwela bato ya bolɔkɔ elingaki kokokisama.

Ozwaki mpenza libaku ya kosakwela bato ntango ozalaki na bolɔko?

TA: Ɛɛ. Na libaku moko, mokonzi moko ya bolɔkɔ oyo azalaki na mposa ya kosolola na ngai abengisaki ngai na biro na ye. Ntango nayaki, alobaki, ‘Nayebi ete ozali Motatoli ya Yehova, komeka kutu te koteya ngai! Yango wana nalobaki na ye: ‘Nazali kutu na likanisi wana te.’ Na nsima atunaki, ‘Nzambe nkombo na ye nani?’ Nalobaki, ‘nkombo ya Nzambe ezali Yehova.’ Atunaki lisusu, ‘Bongo Yesu azali nani? Azali Nzambe te?’ Nalobaki, ‘Te, azali Mwana ya Nzambe.’ Na nsima, atunaki lisusu, ‘Mpo na nini bakristo ya Ɔrtɔdɔkse bandimaka ete azali Nzambe?’ Mpe nalobaki na ye, ‘ebongi otuna bango moko.’

Na libaku mosusu, nasololaki na bato soki 40 to koleka na mbala moko. Monganga moko ya pisikoloji ayaki kotala bato ya bolɔkɔ. Tozalaki kolobela likambo etali libala ntango atunaki likanisi na biso na likambo ya kobala basi ebele. Moto nyonso azalaki na libaku ya kopesa likanisi na ye.

Ntango ngala na ngai ya koloba ekokaki, nalobaki, ngai moko nazali na likanisi te, kasi nasepelaka na likanisi ya moto mosusu na likambo oyo mpe nakosepela kolakisa bino yango. Na nsima, nalobaki: ‘Yango wana mobali akotika tata na ye ná mama na ye mpe asengeli kokangama na mwasi na ye mpe basengeli kokóma mosuni moko.’ (Ebandeli 2:24) Moto yango ya pisikoloji atunaki boye, ‘Ezali likanisi ya nani?’ Nayanolaki boye, ‘Ezali likanisi ya Yehova Nzambe, oyo akelá moto nyonso. Elobeli kaka bato mibale; kasi bato ebele te.’

Atunaki lisusu boye, ‘Ezali na ntina mosusu oyo omoni ete mobali asengeli kozala kaka na mwasi moko?’ Nazongelaki likanisi oyo ezali na Matai 7:12, esika bakomi: “Makambo nyonso oyo bolingaka bato básalela bino, bino mpe bósalela bango kaka bongo.” Nalobaki: ‘Oyo ezali maloba ya Yesu. Soki olingi, tuná mibali oyo bafandi awa soki bakolinga kokabola basi na bango na moto mosusu. Soki mibali bakolinga te kokabola basi na bango na mibali mosusu, boye na ntembe te, basi mpe bakolinga te mibali na bango bázala na basi ebele.’ Moto yango ya pisikoloji alobaki ete na biyano nyonso oyo epesamaki, asepelaki mingi nde na eyano na ngai.

Ezali mpenza kolendisa koyeba ete atako ozalaki kolekisa ntango moko ya mpasi, kasi ozwaki mabaku ya kosakwela bato oyo bazalaki pene na yo!

Lokola osɛngaki tribinale mbala na mbala ete etalela likambo na yo; okendaki kutu tii na Tribinale monene ya Kazakhstan mpo bábimisa yo na bolɔkɔ kasi baboyaki; na kolanda mibeko ndenge mosusu ya kosala ezalaki te.

Kasi, ozalaki na libaku ya kobima na bolɔkɔ soki otyaki sinyatire mpo na likambo moko. Okoki kolobela libaku yango mpe mpo na nini oboyaki kotya sinyatire?

TA: Bon, na mwa ntango moko, bayebisaki ngai nasala likambo moko. Atako emonanaki ete ezalaki likambo moko malamu, kasi ezalaki nde mokanda moko oyo elobaki ete nazali na foti na likambo bafundi ngai mpe nasɛngi bolimbisi mpo na makambo nasalaki. Na nsima, bayebisaki ngai nasala likambo mosusu, nakoma ngai moko ete nasalaki mabe mpe nasɛngi bolimbisi. Bakonzi yango bayebisaki ngai nakoma ete nasalaki foti ndenge nazalaki koyebisa basusu mateya oyo nandimaka mpe ete nayokaki mabe ndenge nasalaki bongo mpe nasɛngaki bábimisa ngai na bolɔkɔ mpo nazali maladi.

Naboyaki kondima likambo oyo nasali te mpe nayebisaki bakonzi ete nakosepela kotikala na bolɔkɔ na lisosoli ya malamu na esika ya kobima na bolɔkɔ na lisosoli oyo ezali kotungisama.

Tosepeli mpenza na ndakisa na yo ya kondima mpe ndenge oboyaki kobebisa lisosoli na yo.

Kasi, nsukansuka, likambo moko oyo okanisaki te esalemaki. Okoki koyebisa biso ndenge nini oyebaki ete bakolimbisa yo mpe bakobimisa yo na bolɔkɔ?

TA: Mokolo moko, mokɛngɛli moko ya bolɔkɔ ayaki koyebisa ngai ete babengi ngai na telefone. Nazali koyeba lisusu ndenge nalobaki na nse ya motema, ‘Nani akoki kobenga ngai?’ Ntango nayambaki telefone, ezalaki mwasi moko oyo ayebisaki ngai soki azali nani mpe akoya na bolɔkɔ kobimisa ngai. Nayebaki mpenza te nasala nini mpo na likambo ayebisaki ngai na telefone. Ntango akataki, nayebisaki mwana na ngai ya mobali likambo yango mpo naboyaki ete mwasi na ngai akóma motema likoló to napesa ye elikya ya lokuta.

Ntango nasilisaki kosolola na telefone, mokɛngɛli yango atunaki ngai, ‘Bayebisi yo nini na telefone?’ Nayebisaki ye ete moto moko azali kosalisa ngai masɛki, mpo mwasi yango alobaki kaka ete azali koya kobimisa ngai na bolɔkɔ.

Mark Sanderson, moko ya bandeko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi elongo na Teymur ná Mafiza Akhmedov mwa moke nsima ya kobima ya ndeko Akhmedov na bolɔkɔ.

Mokɛngɛli yango alobaki ete ezalaki masɛki te, mwasi yango alobaki solo.

Mafiza, oyokaki ndenge nini na nsango wana ya malamu?

MA: Ntango mwana ayebisaki ngai nsango yango, ngai mpe namonaki yango lisɛki. Tozalaki kozela nsango yango banda kala mpenza!

Tozali komeka komona na makanisi ndenge bino mibale bomiyokaki ntango bokutanaki lisusu nsima ya mbula koleka moko oyo Teymur asalaki na bolɔkɔ!

Sikoyo, soki bokanisi, liteya nini bozwi na komekama wana ya kondima na bino?

MA: Nabosanaka te ndenge nazalaki kolela mpo na likambo ya ndeko Bahram [Hemdemov] ná [mwasi na ye] Gulzira Hemdemov. [Bakonzi ya Turkmenistan bakangaki ndeko Hemdemov na sanza ya 03/2015. Na mokolo ya 19/05/2015 bakatelaki ye etumbu ya mbula minei ya bolɔkɔ mpo na bifundeli ya lokuta ete “azali kotinda mangomba eyinana” mpe tii sikoyo azali kaka na bolɔkɔ.] Liboso kutu bákanga Teymur, nazalaki komona ete ezalaki mpasi mpo na ndeko mwasi Gulzira. Sikoyo, nakosepela koyamba ye na mabɔkɔ na ngai mpe koloba na ye ete nalingaka ye mpe nazali na ngámbo na ye. Lokola nazalaki na mokakatano yango na likambo oyo ekómelaki Teymur, nazali na mposa ya koyebisa ye ete nazali kokabola mpasi na ye. Nayebi ete, ndenge moko na ngai, azali na mposa ya lisungi ya Yehova mpe ya bandeko.

Nazali na botɔndi mingi epai ya bandeko nyonso oyo bapesaki biso mabɔkɔ, bandeko ya lisangá na biso mpe ya masangá nyonso na mokili mobimba, Lisangani ya Mikóló-Bakambi, baavoka mpe bana na biso.

Ndeko Akhmedov asimbi certificat ya bolimbisi nsima ya kobima na bolɔkɔ.

TA: Nakoki koloba kaka likambo moko. Ekozala na likambo oyo mokomoko na biso akokutana na yango oyo ekomeka kondima na ye. Naboyi te, moto nyonso te nde akokɔta bolɔkɔ. Mpo na bamosusu, komekama yango ekoki kozala minyoko oyo euti na bandeko ya libota na ye oyo bazali Batatoli ya Yehova te. Bamosusu ekoki kozala mpasi koyokana na ndeko moko na lisangá oyo azali mindɔndɔ. Ezala tomekami to tokutani na mokakatano nini, mokomoko asengeli kopona soki akosalela mitinda ya Nzambe to akokipe yango te. Soki tokangami na mitinda ya Nzambe, boye tokoki kolonga mpenza komekama nyonso. Likambo eleki malamu ya kosala ezali ya kondima komekama oyo ekómeli biso mpe kobosana te ete Yehova akopesa biso makasi ya koyikela yango mpiko.

Nazali kopesa bato ya libota na ngai mpe bana na ngai mersi ndenge bapesaki ngai mabɔkɔ. Basalelaki mabaku nyonso mpo na koya kotala ngai mpe kosalisa ngai nazala kaka makasi.

Lisusu, nalingi mpe kopesa bandeko ya mokili mobimba mersi na nyonso oyo basalaki. Mabondeli na bango mpe mikanda na bango ya kolendisa esepelisaki ngai mpenza. Namiyokaki te ete nasundolami ata na miniti moko. Likambo oyo ekómelaki ngai ekolisi bolingo na ngai mpo na bandeko mpe ekómisi boyokani na ngai na Yehova makasi.