Lakisá makambo oyo ezali na kati

18 SANZA YA 4, 2018
KAZAKHSTAN

Teymur Akhmedov abimaki na bolɔkɔ mpo Prezida alimbisaki ye

Teymur Akhmedov abimaki na bolɔkɔ mpo Prezida alimbisaki ye

Na mokolo ya 2/04/2018, Prezida ya Kazakhstan Nursultan Nazarbayev alimbisaki Teymur Akhmedov tata ya mbula 61, oyo bakangaki ye na bolɔkɔ pene na mbula mobimba mpo na bifundeli ya lokuta. Bolimbisi yango elongoli ye na liste ya bato oyo bafundá bango mpo na makambo ya mabe. Akhmedov ayebaki likambo yango mokolo ya 4/04/2018 mpe babimisaki ye na kasho ntango azalaki naino na lopitalo epai basalaki ye lipaso. Azongi sikoyo na libota na ye mpe akoki sikoyo kozwa lisalisi ya monganga oyo azali na yango mposa mpo na maladi na ye ya kanser.

Bakangaki ye na bolɔkɔ kaka mpamba

Akhmedov, oyo azali Motatoli ya Yehova, bakangaki ye mpe batyaki ye na bolɔkɔ mokolo ya 18/01/2017, kaka mpo azalaki koyebisa basusu mateya ya Nzambe oyo andimaka. Mwa basanza liboso bákanga ye, asololaki na mobali moko makambo ya Biblia mpe mobali yango amonisaki lokola asepeli na mateya ya Batatoli ya Yehova, nzokande azalaki kosala elongo na polisi ya sireté ya Kazakhstan, (KNB), mpe kozanga ete ayeba mobali yango akɔtisaki masolo yango na aparɛyi. Mpo na masolo yango oyo akɔtisaki na aparɛyi yango, KNB ekangaki Akhmedov mpe efundaki ye ete abuki Artikle 174(2) ya mibeko ya Kazakhstan mpo “azali kotinda mangomba na mobulu” mpe koloba ete “lingomba na [ye] eleki ya bamosusu . . .”

Nsima ya kokanga ye, bapolisi batunaki ye mituna mpe batyaki ye naino na kasho na boumeli ya sanza misato. Na mokolo ya 2/05/2017, tribinale ekatelaki ye etumbu ya mbula mitano ya bolɔkɔ mpe mbula misato lisusu mpo na kopekisa ye asala makambo na ye ya losambo.

Baavoka ya Akhmedov batindaki ebele ya mikanda mpo na kosɛnga bábimisa ye, kasi tribinale eboyaki yango nyonso. Ntango mwaye lisusu ya kosamba ezalaki te na kolanda mibeko ya Kazakhstan, amemaki likambo na ye na batribinale ya mikili ndenge na ndenge mpo na koluka lisalisi. Amemaki likambo na ye na ebongiseli ya ONU oyo etalelaka makambo ya kokanga bato kaka mpamba (WGAD) mpe na Komite ya ONU oyo etalelaka ntomo ya moto.

Na sanza ya 10/2017, WGAD ekweisaki Kazakhstan ndenge ekɔtisaki Akhmedov na bolɔkɔ mpe esɛngaki guvɛrnema ebimisa ye nokinoki, mpo makambo asalaki “ezalaki ya mobulu te mpe elekisaki ndelo te na oyo etali bonsomi na ye ya losambo.” Na sanza ya 01/2018, komite ya ONU endimaki bosɛnga ya Akhmedov mpe esɛngaki guvɛrnema ya Kazakhstan ezwa ebongiseli mosusu mpo Akhmedov azwa lisalisi ya monganga oyo esengeli. Komite yango esɛngaki mpe Kazakhstan etalela likambo ya kobimisa ye na bolɔkɔ mpe ekata mpo na libela likambo na ye.

Nsukansuka babimisi ye

Teymur ná Mafiza Akhmedov, nsima ya kozwa bolimbisi

Na boumeli ya mikolo oyo alekisaki na bolɔkɔ, sante na ye ekobaki kobeba. Na ebandeli ya mbula oyo, monganga ayebisaki ye ete azalaki na kanser ya mosɔpɔ ya monene mpe maladi yango ezalaki mokemoke kolya ye. Mpo na ekateli oyo Komite ya ONU ezwaki ya kozwa bibongiseli mosusu mpo na maladi ya Akhmedov mpe mpo na makambo oyo bibongiseli mosusu ya mikili ndenge na ndenge esɛngaki, bakonzi ya Leta ya Kazakhstan basɛngaki Akhmedov akomela Prezida Nazarbayev mpo na kosɛnga ye bolimbisi.

Atindaki mokanda yango ya kosɛnga bolimbisi na mokolo ya 5/03/2018, mpe alobaki ete bátalela likambo na ye nokinoki mpo azalaki na mposa ya lisalisi ya monganga kozanga koumela mpo kanser na ye epanzana nzoto mobimba te. Liboso Prezida apesa eyano, bakonzi ya bolɔkɔ batindaki Akhmedov na Almaty, epai basalaki ye lipaso na mokolo ya 27/03/2018.

Kazakhstan ekomonisa limemya mpo na bonsomi ya losambo?

Akhmedov ná mwasi na ye, Mafiza mpe bana na bango basepeli ndenge likambo yango esuki. Basepeli mpe ndenge Prezida Nazarbayev alongoli ye na liste ya basali mabe. Mpo na bifundeli yango ya lokuta, guvɛrnema ekangá kɔnti na ye ya banki mpe yango esalaki ete mwasi na ye amona mpasi mingi ntango ye azalaki na bolɔkɔ.

Batatoli ya Yehova na mokili mobimba bazali na elikya ete ndenge balimbisi Akhmedov, yango emonisi ete bakonzi ya Leta ya Kazakhstan bakotikela sikoyo Batatoli ya Yehova bonsomi ya kosala makambo na bango ya losambo na kimya nyonso.