Lakisá makambo oyo ezali na kati

6 SANZA YA 7, 2017
KAZAKHSTAN

Bakonzi ya ekólo Kazakhstan bakati misala ya Biro ya Batatoli ya Yehova ya mboka yango

Bakonzi ya ekólo Kazakhstan bakati misala ya Biro ya Batatoli ya Yehova ya mboka yango

Na mokolo ya 29/06/2017, tribinale moko na Almaty, na Kazakhstan, ekatelaki Biro ya misala ya Batatoli ya Yehova na Kazakhstan amande mpe esɛngaki ete mosala moko te esalema kuna na boumeli ya sanza misato. Tribinale ezwaki ekateli yango nsima ya ankɛtɛ oyo elobaki ete esengelaki bábakisa bakamera mosusu misato, longola bakamera 25 oyo batyá na Biro yango mpo na kotosa mobeko ya mboka oyo esɛngi ete bisika ya bato nyonso ezala bongo. Nzokande, na mokolo ya 6/02/2017, bakonzi ya Leta bandimaki plan oyo Biro yango elakisaki bango, oyo emonisaki bisika nyonso oyo batyaki bakamera na lopango yango. Lokola bandimaki plan yango, bakonzi bamonisaki ete Biro ya Batatoli ya Yehova etosaki mpenza mibeko ya mboka.

Polat Bekzhan, mokambi ya Biro yango, alobaki boye: “Kopekisa misala nyonso na Biro na biso ezali etumbu oyo eyokani te na mobeko oyo balobi ete tobuki yango. Tosɛngi bátalela lisusu ekateli yango, mpo tomoni lokola bazwi yango nde mpo balingi lingomba na biso te.”

Bakonzi ya Leta bamikɔtisi na likambo etali misala ya Biro yango

Bakonzi ya Leta na Kazakhstan bazali se kokoba kotungisa Batatoli ya Yehova. Liboso Zuzi Pakirdinov ya tribinale administrative ya etúká azwa ekateli mokolo ya 29/06/2017, bakonzi ya Leta bayaki naino na mbalakaka na Biro yango mokolo ya 17/05/2017, balobaki ete bayaki kosala ankɛtɛ mpo bazali kobatela mboka na makambo ya mobulu. Basalaki ankɛtɛ yango na moi makasi mpe bato ya KGB oyo batalaka securité ya mboka yango nde basalaki ankɛtɛ yango, bakonzi bazalaki koleka 30 ná bapolisi oyo balataka maskɛ mpe bazalaki na mindoki. Balobaki ete batindaki bango básala baankɛtɛ na bisika ya bato nyonso mpo bámindimisa ete likambo ya kobanga ezali te liboso ya Fware ya 2017, oyo ebandaki na sanza ya 06/2017 na mboka-mokonzi Astana.

17/05/2017, bapolisi bakei kosala ankɛtɛ na Biro ya misala ya Batatoli ya Yehova

Na mokolo ya 23 tii 25/06/2017, Batatoli ya Yehova babongisaki liyangani ya mikolo misato oyo esangisaki bato oyo bautaki États-Unis, Mpoto, Ukraine, Georgie, Kyrgyzstan, mpe bikólo mosusu. Kasi liboso liyangani yango ebanda, bakonzi basɛngaki bátala lisusu kɔntra ya bisika oyo liyangani esengelaki kosalema mpe baboyaki kɔntra yango. Yango wana liyangani yango esalemaki na lopango ya biro ya Batatoli ya Yehova mpe esangisaki Batatoli ya Yehova ya mboka yango mpe Batatoli ya Yehova mosusu 1500 oyo bautaki na bikólo mosusu.

23/06/2017, bazelisi bapaya oyo bayaki liyangani

Na mokolo ya liboso ya liyangani yango, bapolisi balekisaki ngonga mibale mobimba na kotala mikanda ya basofɛlɛ ya babisi 11 oyo elingaki komema bapaya 500 na liyangani yango. Bapaya yango bazelaki kaka babisi yango na baotɛlɛ oyo bazalaki. Na mokolo ya mibale, bapolisi basalaki lisusu bongo na boumeli ya ngonga misato mobimba na babisi 20 oyo ezalaki na bapaya 900 oyo bazalaki kokende na liyangani.

Biro efundaki likambo yango na Biro ya prokirɛrɛ ya Almaty. Atako prokirɛrɛ apesaki eyano te, bapolisi batungisaki lisusu Batatoli ya Yehova te na mokolo ya misato ya liyangani yango. Kasi, mikolo minei mpamba na nsima, tribinale ya Almaty ebimisaki ekateli ya kokata misala ya Biro ya Batatoli ya Yehova.

Basaleli mibeko mpo na kobimisela bandeko mikakatano

Kobanda sanza ya 12/2012, guvɛrnema ya Kazakhstan ezali se kobakisa bipekiseli na bonsomi ya losambo ya Batatoli ya Yehova na ekólo yango mobimba. Guvɛrnema efutisaki Batatoli ya Yehova koleka 60 baamande ya minene mpo bakomisaki na Leta te “mosala na bango ya misionɛrɛ.”

Na sanza ya 01/2017, bakonzi ya Kazakhstan basambisaki Batatoli ya Yehova mibale mpo bateyaki bato mosusu mateya ya lingomba na bango. Na sanza ya mitano, basambisaki Teymur Akhmedov mpo na makambo na ye ya losambo mpe sikoyo azali kosala bolɔkɔ ya mbula mitano. Epai mosusu, bapolisi bazali kolandela Motatoli ya Yehova moko mpo bafundi ye ete azali kotinda bato báyina mangomba mosusu mpo apesaki bango mikanda oyo bakonzi ya Russie bapekisaki, balobaki ezali mikanda oyo “elekisaka ndelo.”

Kazakhstan ekomekola Russie na ndenge ya kosalela Batatoli ya Yehova makambo?

Batatoli ya Yehova bakutani mbala ebele na bakonzi ya Leta oyo batalelaka makambo ya losambo mpo na kolobela lotomo na bango ya kosambela na bonsomi, kasi makambo esimbaki te. Kasi, tribinale monene ya Kazakhstan esalaki makambo oyo biro ya prokirɛrɛ général esɛngaki mpe etalelaki likambo ya Andrey Korolyov, Motatoli ya Yehova oyo basambisaki ye mpo azalaki koyebisa basusu mateya ya lingomba na ye. Na ekateli oyo tribinale ezwaki mokolo ya 01/06/2017, balobaki ete Korolyov azali na ngambo te, bandimaki ete lotomo ya kosambela na bonsomi ebatelaka baoyo balobelaka bindimeli na bango na kimya epai ya bato. Atako biro ya prokirɛrɛ général elobaki na Batatoli ya Yehova ete ekateli wana ya malamu ekotosama, kasi batribinale ya mike eboyaki kotosa ekateli yango mpe ekobaki kosambisa Batatoli ya Yehova mpo na “mosala ya misionɛrɛ oyo ekomami te na Leta.”

Gregory Allen, Avoka ya Batatoli ya Yehova oyo alobelaka bango na tribinale, alobaki boye: “Ezali mpenza mawa komona ndenge Kazakhstan ezali komekola Russie na bifundeli ezangi motó na makolo mpo na kobebisa bonsomi ya losambo, lotomo oyo eyebani mokili mobimba. Tozali kobanga ete ekateli ya 29/06/2017 epekisa misala ya Biro ya Batatoli ya Yehova ya mboka na biso mpo ezali komonana bongo. Lokola tosɛngi tribinale etalela lisusu likambo yango, tozali na elikya ete bosembo ekosalema.”

Makambo yango ezali kotungisa mpenza Batatoli ya Yehova na mokili mobimba mpo bazali kobanga ete bakonzi ya Kazakhstan bámekola bakonzi ya Russie mpe bápekisa misala ya losambo ya bandeko na bango na Kazakhstan.