Lakisá makambo oyo ezali na kati

21 SANZA YA 12, 2017
KAZAKHSTAN

Tribinale monene ya Kazakhstan eboyi Teymur Akhmedov asamba lisusu

Tribinale monene ya Kazakhstan eboyi Teymur Akhmedov asamba lisusu

Na mokolo ya 4/12/2017, tribinale monene ya Kazakhstan eboyaki ndeko Teymur Akhmedov asamba lisusu. Bakatelaki ye etumbu kaka mpo na makambo ya losambo oyo bango bamonaki ete ebuki mibeko ya Leta, nzokande azalaki kaka koyebisa basusu mateya ya Nzambe oyo andimaka. Bapolisi ya sireté bakangaki ye banda mokolo ya 18/01/2017, na ndenge oyo eyokani na mibeko te. Na sanza ya mitano tribinale ya etúká ekweisaki ye na likambo mpe ekatelaki ye bolɔkɔ ya mbula mitano. Mokolo ya 20/06/2017, ntango asambaki lisusu na tribinale moko, tribinale yango eboyaki kolongola etumbu oyo bakatelaki ye liboso.

Ntango tribinale monene etalelaki likambo ndeko Akhmedov asɛngaki asamba lisusu, tribinale ekipaki te ekateli oyo ebongiseli ya ONU oyo elandelaka makambo ya baoyo bakangaka bango kaka mpamba eutaki kozwa, ekateli oyo emonisaki ete Kazakhstan ekangaki ndeko Akhmedov kaka mpamba mpe etosaki te bonsomi na ye ya losambo. Atako sante na ye ezali malamu te, Akhmedov azali kobatela kondima na ye makasi mpe atyeli Nzambe elikya mobimba. Azali kosepela na milende nyonso oyo ezali kosalema mpo abima na bolɔkɔ, ata soki eyano ya malamu epesami naino te. Ndenge bandimi ya lingomba na ye na mokili mobimba bazali kobondela mpo na ye ezali mpe kosimba motema na ye.