Lakisá makambo oyo ezali na kati

04/09/2019
KENYA

Batatoli ya Yehova babimisi Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika na monɔkɔ ya Luo na Kenya

Batatoli ya Yehova babimisi Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika na monɔkɔ ya Luo na Kenya

Batatoli ya Yehova babimisaki Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami mosantu na monɔkɔ ya Luo na liyangani ya etúká na Kisumu, na ekólo Kenya, na mokolo ya 30/08/2019. Ndeko Remy Pringle, mosangani ya komite ya filiale ya Kenya, alakisaki Biblia oyo euti kobima na mokolo ya liboso ya liyangani ya etúká. Bayangani nyonso bazalaki bato 2 481, sangisá baoyo balandaki programɛ na bisika mibale mosusu.

Mosala ya kobongola ezwaki mbula misato mobimba mpo na kosilisa yango. Ndeko moko oyo azalaki na ekipi ya babongoli alobaki boye: “Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika na monɔkɔ ya Luo na mobimba na yango ekosepelisa mingi bandeko na biso nyonso oyo bazalaki kozela yango. Mabota mingi na lisangá na biso ekokaki te kosombela moto mokomoko ya libota Biblia ya mobimba, mpe ekozala mpenza lipamboli mpo moto nyonso akozala na Biblia na ye. Lisusu, lokola basaleli maloba ya mikolo oyo na Biblia yango, yango ekosala ete boyekoli ya moto ye moko mpe losambo na kati ya libota esepelisa mpe ekómisa kondima ya moto makasi.”

Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika ebongolami na mobimba to na ndambo na yango na minɔkɔ 184, ezala mpe Biblia 25 oyo babongisi lisusu na kolanda libongoli ya 2013. Tomindimisi ete yango ekosalisa basakoli soki 1 800 oyo balobaka monɔkɔ ya Luo na teritware ya Kenya bákoba kopusana penepene na Yehova. Ekosalisa mpe mpo na kosakwela bato koleka milio mitano oyo balobaka monɔkɔ ya Luo.​—Matai 24:14.