Lakisá makambo oyo ezali na kati

25/1/2018
MADAGASCAR

Mopɛpɛ makasi babengi Ava ebebisi Madagascar

Mopɛpɛ makasi babengi Ava ebebisi Madagascar

Makambo ekómi kobonga mwa moke na Madagascar nsima ya mopɛpɛ makasi oyo babengi Ava ebebisaki mboka yango na mokolo ya 5/01/2018. Bakonzi ya mboka yango balobaki ete mopɛpɛ yango ebomaki bato soki 51 mpe ebele ya bato mosusu bakendaki kofanda bisika mosusu mpo bandako na bango ebebaki.

Nsango ya liboso oyo filiale ya Batatoli ya Yehova na Madagascar epesi, emonisi ete ata ndeko na biso moko te akufaki na mopɛpɛ yango. Kasi, bandako soki 45 ebebaki to ebukanaki, ata mpe Bandako ya Bokonzi 6. Mopɛpɛ yango ebebisaki mpe bilanga oyo mingi ya basakoli ya mboka yango babikelaka. Filiale esalaki Komite ya kopesa lisungi mpo na kosunga nokinoki bandeko oyo bazwaki likama, na ndakisa kopesa bango bilei, bilamba mpe bikisa ya kolala mpo na mwa ntango. Bandeko mibale ya Biro bakendaki mpe esika likama esalemaki mpe basalaki likita sipesiale elongo na mabota nyonso oyo ezwaki likama na mopɛpɛ yango mpo na kolendisa bango na nzela ya Makomami.

Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova eyeisi mosala ya kopesa lisungi pɛpɛlɛ, ata mpe kosalisa bandeko nsima ya mopɛpɛ yango ndenge ezali kosalela mbongo ya makabo oyo epesamaka mpo na kosunga mosala ya kosakola na mokili mobimba. Tozali kobondela Yehova ete akoba kozala ekimelo mpo na bandeko na biso ya Madagascar na ntango oyo ya mpasi.​—Nzembo 9:9, 10

Bato oyo bapanzi-nsango bakoki kobenga:

Mpo na mokili mobimba: David A. Semonian, Biro ya kozwa bansango, +1-845-524-3000

Madagascar: Rinera Rakotomalala, +261-33-37-012-91