Lakisá makambo oyo ezali na kati

Basakoli koleka 42 000 bapesaki mabɔkɔ mpo na kosilisa mosala ya kopesa lisungi na Amérique Centrale.

12/04/2019
MEXIQUE

Batatoli ya Yehova basilisi mosala ya kotongela bandeko oyo bandako na bango ekweaki na koningana makasi ya mabele oyo esalemaki na Amérique Centrale

Batatoli ya Yehova basilisi mosala ya kotongela bandeko oyo bandako na bango ekweaki na koningana makasi ya mabele oyo esalemaki na Amérique Centrale

Mabele eninganaki makasi na Guatemala mpe na Mexique na 2017. Na sanza ya 12/2018, bandeko na biso basilisaki mosala ya kotonga bandako oyo ebebaki na bisika yango.

Filiale ya Amérique Centrale ebandaki mosala ya kopesa lisungi mpe ebongisaki makita mingi mpo na kolendisa bandeko oyo bakutanaki na makama. Makita yango esalemaki na etúká ya Chiapas, ya Morelos, ya Oaxaca mpe ya Puebla, ata mpe na engumba Mexico. Na litambwisi ya komite ya filiale, komite 39 ya kopesa lisungi ebongisaki mosala ya kotonga lisusu bandako oyo ebebaki.

Ndeko Jesse Pérez ya komite ya filiale ya Amérique Centrale, akutani na bandeko oyo bakutanaki na likama na etúká ya Morelos.

Bandeko mibali mibale bazali kosala mosala likoló ya nsamba ya Ndako ya mayangani oyo batongi lisusu.

Na Mexique, basakoli koleka 42 000 ya bitúká ndenge na ndenge bapesaki mabɔkɔ na mosala yango. Bandeko basi mpe mibali batongaki lisusu bandako 619, Bandako ya Bokonzi 5 mpe Bandako mibale ya mayangani. Babongisaki mpe bandako mosusu 502 mpe Bandako ya Bokonzi 53. Na Guatemala, batongaki lisusu bandako zomi.

Na bandeko oyo bazwaki lisungi yango, tokoki kotánga libota ya ndeko Hernández mpe ya ndeko Santiago.

Bato ya libota ya ndeko Hernández batɛlɛmi liboso ya ndako na bango, oyo bandeko oyo bayaki kopesa lisungi batongeli bango.

Libota ya ndeko Hernández efandaka na engumba ya Chalco, kaka kilomɛtrɛ 40 mpo na kokóma na engumba Mexico. Koningana ya mabele oyo esalemaki na mokolo ya 19/09/2017, ebebisaki ndako na bango mabe mpenza. Ndeko mwasi Ana María Hernández alobi boye: “Na boumeli ya ntango wana ya mpasi, tozangaki ata eloko te. Bandeko na biso bakipaki biso mpenza. Nabosani te ndenge bavolontɛrɛ 50 to koleka batɛlɛmaki esika ndako na biso ezalaki mpo na kotongela biso ndako ya sika. Tii lelo, bato ya kartye na biso bakamwaka mpo na oyo bandeko basalelaki biso.” Longola kopesa lisungi yango, momonisi moko oyo autaki na filiale ya Amérique Centrale akendaki kotala libota ya ndeko Hernández mpe alendisaki bango na Biblia.

Fɔtɔ oyo bakangi libota ya ndeko Santiago liboso ya ndako na bango ya sika.

Libota ya ndeko Santiago, oyo efandaka na engumba ya Juchitán na etúká ya Oaxaca, ekutanaki na likama na koningana ya mabele oyo esalemaki na mokolo ya 07/09/2017. Ndako na bango ebebaki mabe mpenza. Kasi, sanza motoba ekokaki te, bandeko ya kopesa lisungi batongelaki bango ndako ya sika. Ndeko Victor Santiago, tata ya libota yango, alobi boye: “Nakamwaki mpenza ndenge ebongiseli ya Yehova eyaki nokinoki kosunga biso. Namonaki ete Yehova azali na makambo nyonso na mabɔkɔ.”

Ndeko Jesse Pérez, ya komite ya filiale ya Amérique Centrale, alobi boye: “Koningana mibale wana ya mabele ebebisaki bandako mingi mpenza. Atako bongo, mosala oyo esɛngaki mpo na kopesa lisungi epesaki bandeko basi mpe mibali libaku ya komipesa lokola bavolontɛrɛ mpo na kosalisa. Ebele ya bandeko bapesaki mabɔkɔ, bamonisaki bolingo ya bondeko. Tozali na esengo ndenge Yehova apambolaki ‘mosala wana ya kosunga.’”​—2 Korinti 8:1-4.