Lakisá makambo oyo ezali na kati

17 SANZA YA 08, 2020
MEXIQUE

Mopɛpɛ makasi na nkombo Hanna ebɛti na Mexique

Mopɛpɛ makasi na nkombo Hanna ebɛti na Mexique

Esika

Bitúká ya Tamaulipas ná Nuevo León, na ekólo Mexique

Likama

  • Na mokolo ya 26/07/2020, mopɛpɛ makasi na nkombo Hanna, ntango makasi na yango ekitaki mwa moke, elekaki na nɔrdi-ɛsti Mexique, ezindisaki bisika ebele mpenza

Makambo oyo ekómeli bandeko na biso

  • Na etúká ya Nuevo León, mabota 14 ya bandeko balongwaki liboso mopɛpɛ ekóma

  • Na engumba Reynosa, na etúká ya Tamaulipas, basakoli 100 bakimaki bandako na bango

Bandako oyo ebebi

  • Na etúká ya Nuevo León, ndako 21 ebebaki

  • Na etúká ya Tamaulipas, ndako 117 ebebaki

Lisungi

  • Betele ya Amérique Centrale etyaki Komite ya kopesa lisungi

  • Bakɛngɛli ya zongazonga mpe bankulutu ya masangá na bisika oyo mopɛpɛ ebɛtaki bazali kotambwisa misala ya kosukola bandako oyo ezindaki mpe kotya yango nkisi

  • Na etúká ya Nuevo León, bandeko mingi oyo balongwaki na bandako na bango bazongaki

  • INa etúká ya Tamaulipas, masangá ya etúká wana epesaki bandeko oyo bandako na bango ezindaki biloko ya kolya mpe bilamba ya kolata

Tozali kopesa Yehova matɔndi mingi mpo ndeko na biso moko te azokaki na likama wana. Lisungi oyo esili kopesama emonisi ete Tata na biso ya likoló mpe basaleli na ye bazali ntango nyonso “lisalisi oyo ezwamaka noki na bantango ya mpasi.”​—Nzembo 46:1.