Lakisá makambo oyo ezali na kati

Bato ya nkanza ya Huichol babebisaki ndako oyo, bayibaki baporte, bafenetre mpe nsamba na yango. Babenganaki bato ya sembo oyo bazali basangani ya Huichol na bandako na bango.

6/2/2018
MEXIQUE

Mexique: Bato ya Huichol na Jalisco babengani bandeko na bango oyo bazali Batatoli ya Yehova

Mexique: Bato ya Huichol na Jalisco babengani bandeko na bango oyo bazali Batatoli ya Yehova

ENGUMBA MEXICO​—Na mokolo ya 4/12/2017, na Tuxpan de Bolaños, engumba moko ya moke na bangomba ya etúká Jalisco, na Mexique, etuluku ya bato oyo bazali bana-mboka oyo balobaka monɔkɔ ya Huichol ebundisaki bandeko na biso 12 mpe bato mosusu 36 oyo tosambelaka na bango elongo, babenganaki bango na bandako na bango. Bato yango oyo bazali nkanza balobaki ete Batatoli ya Yehova baboyaka komikɔtisa na mimeseno ya bonkɔkɔ ya mangomba ya bato ya Huichol. Lokola Batatoli ya Yehova bazali konyokwama mpo na makambo ya losambo, bamemaki likambo yango epai ya bakonzi ya Leta mpo bákata likambo yango.

Bayibaki biloko ya bandeko na biso to babwaki yango libándá.

Bakonzi ya Mexique bamemyaka mimeseno mpe bonkɔkɔ ya bato ya Huichol mpe batikelaka bango mwa bonsomi. Ndenge bakonzi oyo batosisaka mimeseno ya bonkɔkɔ ya bato ya Huichol basɛngaki, bana-mboka babenganaki bandeko na biso na bandako na bango na makasi. Na nsima babebisaki bandako na bango, baporte, bafenetre na yango mpe balongolaki bansamba na yango. Biloko nyonso oyo etikalaki, babwakaki yango na fulu. Bakendaki na bandeko na zamba mpe balobaki na bango soki bazongi na bandako na bango bakobomama.

Batatoli ya Yehova oyo balobaka monɔkɔ ya Huichol bazali na libándá ya Ndako ya Bokonzi.

Momonisi moko ya filiale na Mexique akendaki kotala bango mpo na kolendisa bango na nzela ya Biblia mpe mpo na koluka ndenge ya kozwela bango bisika ya kofanda. Bamonisi ya Batatoli ya Yehova oyo batalelaka makambo ya mibeko bakutanaki na mokambi ya etúká Jalisco, prokirɛrɛ oyo atalelaka ntomo ya moto, prokirɛrɛ ya etúká, mpe mokambi oyo atalelaka makambo ya bato oyo bakweli makambo. Lelo oyo, bakonzi ya Leta bazali kolandela likambo yango.

Ndeko Gamaliel Camarillo, molobeli ya Batatoli ya Yehova na Mexique, alobi: “Totungisami mpenza komona bandeko na biso, oyo bazalaka na kimya na mboka na bango mpe bamemyaka mimeseno na yango, babundisi bango kaka mpo baboyi komikɔtisa na mimeseno to bonkɔkɔ ya losambo oyo ezali kobebisa lisosoli na bango. Tozali na elikya ete bakonzi ya mboka bakosilisa minyoko oyo euti na makambo ya losambo.”

Tozali kobondela mpo na bandeko na biso oyo babungisi bandako na bango mpe biloko na bango, mpe tozali na elikya ete Yehova akokoba kopesa bango lisungi oyo basengeli na yango na nzela ya ebongiseli na ye.​—Yisaya 32:2.

Bato oyo bapanzi-nsango bakoki kobenga:

Na mokili mobimba: David A. Semonian, Biro ya kozwa bansango, +1-845-524-3000

Mexique: Gamaliel Camarillo, +52-555-133-3048