Lakisá makambo oyo ezali na kati

20/9/2017
MEXIQUE

Mabele eninganaki makasi na ntei ya Mexique

Mabele eninganaki makasi na ntei ya Mexique

Na mokolo ya 19/09/2017, mabele eninganaki makasi na ntei ya Mexique mpe ebomaki bato koleka 200. Biro ya Filiale ya Batatoli ya Yehova ya Amerika ya ntei ezwaki lapolo ya liboso oyo ezalaki na nsango oyo elandi.

Likambo ya mawa, bayebisi biso ete ndeko na biso moko ya mwasi na engumba Mexico akufaki na koningana wana ya mabele. Longola yango, ndeko mosusu ya mwasi azali kaka komonana te banda ndako na ye ekweaki. Na engumba Puebla, ndeko mwasi moko azokaki mabe mpe na etúká ya Mexico ndeko mosusu akɔtaki lopitalo mpo azokaki.

Balongolaki biro ya Batatoli ya Yehova mpo na mwa ntango kasi na nsima ezongelaki misala ndenge ezalaka. Moto moko te azokaki to ndako moko te ebukanaki.

Tozali kokoba kobondela mpo na bandeko na biso na eleko oyo ya mpasi, mpo toyebi ete Yehova akosunga bango mpo ayebi “bampasi” na bango​—Nzembo 31:7.

Bato oyo bapanzi-nsango bakoki kobenga:

Mpo na mokili mobimba: David A. Semonian, biro ya kozwa bansango, +1-845-524-3000

Mexico: Gamaliel Camarillo, +52-555-133-3048