Lakisá makambo oyo ezali na kati

19/2/2020
BANSANGO YA MIKILI NYONSO

Babongisi lisusu ndenge ya kosalela programɛ JW Library Sign Language

Babongisi lisusu ndenge ya kosalela programɛ JW Library Sign Language

Version ya 4 ya programɛ JW Library Sign Language, oyo ebimaki na mokolo ya 15/02/2020 ebakisi eloko moko ya sika mpe ezali malamu mpenza. Moto oyo azali kosalela yango akoki mbala moko komona makambo oyo ekosalisa ye soki afini na mopanzi, yango esali ete kobongisa makita ya lisangá to koluka likambo moko na Biblia ekoma pɛtɛɛ.

Banda kala, bato oyo basalelaka programɛ JW Library bazalaki koluka makambo na Biblia to na mikanda mosusu, kozanga ete lokasa oyo bazali kosalela ebunga. Kasi, yango ezalaki mpasi mpo na bandeko oyo basalelaka kaka mikanda oyo ezali na elobeli ya bababa batika video mbala moko mpe bakende koluka likambo na esika mosusu.

Nzokande, na programɛ ya JW Library Sign Language, Version ya 4, mikanda ezali komonana wana na mitindami to lien. Soki ofini esika yango, okomona mbala moko bavideo mosusu mpe na pɛtɛɛ nyonso okoki kozonga na video oyo ozalaki kolanda.

Talá ndenge ekómi pɛtɛɛ komona makambo oyo tokosalela na makita ya kati ya pɔsɔ

Tozali na elikya ete esaleli oyo ya sika ekosunga mpenza bandeko na biso oyo basalelaka kaka mikanda oyo ezali na elobeli ya bababa. Tozali kopesa Yehova matɔndi mpo na bisaleli oyo esalisaka biso mpo na kobongisa boyokani na biso na ye.​—Nzembo 119:97.

Talá ndenge liloba “nyoka” oyo ezali na Ebandeli 3:1 etindi moto na Emoniseli 20:2 mpe esalisi ye ayeba soki “nyoka yango ya ebandeli” ezali na nani