Lakisá makambo oyo ezali na kati

30/04/2020
BANSANGO YA MIKILI NYONSO

Bandeko na mokili mobimba bazali kobɔndisa bato oyo babungisi bandeko na bango na maladi mabe oyo

Bandeko na mokili mobimba bazali kobɔndisa bato oyo babungisi bandeko na bango na maladi mabe oyo

Atako biso basaleli ya Yehova tosalaki nyonso mpo na komibatela mpe kobatela bandeko na biso mpo bázwa maladi ya coronavirus te, bandeko na biso mosusu bakufi na maladi yango. (Mosakoli 9:11) Likambo ya mawa, na mokili mobimba, bandeko na biso ya bolingo 872 bakufaki na virisi oyo babengi coronavirus. Bandeko na biso basalaki nokinoki básalisa mpe bábɔndisa baoyo bakutanaki na likambo ya ndenge wana. (1 Bakorinti 12:26) Likambo ya ntina koleka, bandeko na mokili mobimba bazali kotyela Yehova motema, mpo ye akokisaka ntango nyonso elaka na ye oyo ezali na Bafilipi 4:7, ya kopesa biso “kimya ya Nzambe.”

Ndeko Unnützer ná mwasi na ye

Moko ya baoyo bazwaki lisalisi ya ebongiseli ya Yehova ezali ndeko mwasi Hannchen Unnützer, azali mobongisi-nzela monene na Bolzano, na nɔrdi ya Italie. Likambo ya mawa, mobali na ye, ndeko Manfred Unnützer, akufaki na mokolo ya 28/03/2020, na coronavirus. Ndeko Unnützer asalaki pene na mbula 58 na mosala ya ntango nyonso, mpe mwasi na ye mbula 54. Basalaki mosala na zongazonga mbula 25. Bandeko soki 1 000, ya bamboka ndenge na ndenge, balandaki diskur ya bokundi na nzela ya video na Internet.

Ndeko mwasi Unnützer alobi boye: “Nazali na botɔndi mingi epai ya bandeko. Basundolaki ngai te, ata ngonga moko te. Nayokaki mpenza ete balingi ngai mingi mpenza! Balendisaki ngai, batángelaki ngai Biblia mpo na kobɔndisa ngai, mpe bapesaki ngai eloko nyonso oyo nasengelaki na yango. Nalingaka mpenza bandeko na ngai nyonso.”

Bandeko na biso bazali mpe kobɔndisa ndeko Maria Jose Moncada ná mobali na ye, Darwin. Bazali kosakola na lisangá ya monɔkɔ ya Quichua na bangomba ya ekólo Équateur. Likambo ya mawa, baboti ya mwasi ya ndeko Moncada​—ndeko mwasi Fabiola Santana Jordan, mbula 56, azalaki mobongisi-nzela ya sanza na sanza, ná ndeko Ricardo Jordan, mbula 60, azalaki mosaleli na misala na Lisangá ya Praderas na Guayaquil​—bakufaki moto na moto nsima ya kobɛla mikolo motoba. Bandeko mibali mibale ya ndeko mwasi Moncada mpe babɛlaki maladi ya COVID-19 kasi babikaki.

Ndeko Moncada ná mwasi na ye bazali kosala molulu ya Bilei ya mpokwa ya Nkolo

Likambo mosusu ya mpasi, ndeko mwasi Moncada asengelaki kosala mobembo ngonga minei mpo na kokutana na bandeko na ye mpo na kobɔndisa bango mpe kopesa mabɔkɔ na bibongiseli ya kokunda baboti na bango. Kasi ye na mobali na ye babondelaki Yehova mingi mpenza, bamonaki ete ezali malamu te kokende na Guayaquil. Na esika na yango, basololaki na bandeko yango na nzela ya video na Internet. Ndeko mwasi Moncada alobi boye: “Soki tókutanaka na bandeko na biso, tokokaki kozwa maladi mabe wana mpe kopesa yango bato mosusu.”

Tozali komona ntina oyo ndeko mwasi Moncada alobi ete ayokaki “mawa mpenza mpe mpasi mingi na motema,” kasi ye na mobali na ye bakobaki kosalela Yehova, mpe “batikaki te kobondela Yehova ntango nyonso na motema mobimba mpo na kosɛnga ye litambwisi.” Ndeko Moncada ná mwasi na ye bakobaki kozwa bibongiseli mpo na Ekaniseli mpe kobenga bayekoli na bango ya Biblia báya na Ekaniseli, kotánga bavɛrsɛ ya Biblia oyo elobeli mikolo ya nsuka ya bomoi ya Yesu awa na mabele. Bakobaki mpe kosakola na nzela ya kokoma mikanda mpe koyangana na makita na nzela ya video na Internet. Bato libwa ya libota ya ndeko mwasi Moncada, oyo bazali Batatoli ya Yehova te, bandimaki kolanda Ekaniseli na monɔkɔ ya Espagnol na nzela ya video na Internet.

Ndeko mwasi Moncada alobi ete: “Tolendisamaki mingi na komona ndenge bayekoli ya Biblia bazwaki bibongiseli ya kolanda diskur ya Ekaniseli na telefone to na tablɛti, nzokande ezali pɛtɛɛ te mpo na bango.” Abakisi boye: “Ezalaki mpe likambo ya esengo mpe ya kokamwa komona bato ya libota na ngai na nzela ya video atako bazali kofanda na bikólo mosusu.”

Ndeko Moncada alobi lisusu boye: “Likambo oyo ekómeli biso emonisi ete, ata okutani na mokakatano ya makasi ndenge nini, kokoba kosalela Yehova ezali nzela ya malamu mpenza mpo na kolonga mokakatano yango, mpo wana opesi Yehova nzela apambola yo.”

Bandeko na biso na mokili mobimba bazali konyokwama elongo na bandeko oyo babungisi bato na bango na maladi mabe oyo, mpe tokokoba kobondela mpo na baoyo bazali kolela. Tozali na elikya ete na mikolo ezali koya, Yehova akosilisa makambo nyonso oyo eyokisaka bato mpasi, na ndakisa bamaladi mabe, mpe akosekwisa basaleli na ye nyonso ya sembo oyo bakufá.​—1 Bakorinti 15:21, 22.