Lakisá makambo oyo ezali na kati

Bandeko basi mpe mibali oyo bazali na bolɔkɔ na Russie mpe na Crimée

03/01/2022
BANSANGO YA MIKILI NYONSO

Bikólo ndenge na ndenge ekomi mokanda mpo bátika konyokola Batatoli ya Yehova

Bikólo ndenge na ndenge ekomi mokanda mpo bátika konyokola Batatoli ya Yehova

Na mokolo ya 17/12/2021, basangani ya ebongiseli ya bikólo ndenge na ndenge na makambo etali bonsomi ya losambo, na mokuse a (IRFBA) bakomaki mokanda moko mpo na kosunga Batatoli ya Yehova oyo bazali konyokwama mpo na kondima na bango. Na mokanda yango basɛngaki ete bálongola kozanga koumela Batatoli nyonso oyo bazali na bolɔkɔ mpe bátika konyokola bango, kobɛta bango na nzoto, kokɔtela bango na bandako, mpe kosalela bango makambo na kozanga bosembo.

Ezali na Batatoli ya Yehova koleka 150 oyo bakangami na bolɔkɔ mpo na kondima na bango na bamboka lokola Crimée, Érythrée, Russie, Singapour, mpe Tadjikistan. Basangani ya IRFBA bamonisi ete “bazali komitungisa mingi” ndenge “bazali lisusu konyokola Batatoli ya Yehova mingi” mpe bamonisi ete Batatoli ya Yehova bazali na lotomo ya kosambela “kozanga kobanga, konyokola bango, kotɛmɛla bango, to kobundisa bango.”

Tozali na botɔndi mingi mpo na baguvɛrnema ya sembo oyo ezali kopesa mabɔkɔ mpo na kokɔtela biso na etumba ya koluka lotomo na biso ya losambo. Nsukansuka, toyebi ete Yehova akokoba kobatela bandeko na biso ya basi mpe ya mibali oyo bazali konyokwama mpe oyo bazali kotyela ye motema mpe ‘akopesa bango kimya ntango nyonso.’​—Yisaya 26:3.