Lakisá makambo oyo ezali na kati

Emilia na Suisse

15/4/2020
BANSANGO YA MIKILI NYONSO

Bilenge Batatoli bazali kozwa mayele mosusu ya kosakola na ntango oyo ya maladi mabe

Bilenge Batatoli bazali kozwa mayele mosusu ya kosakola na ntango oyo ya maladi mabe

Na mokili mobimba, bandeko na biso oyo bazali bilenge bazali kozwa bikateli ya kokoba kosakola mpe kolendisa bandeko na ntango oyo ya maladi mabe ya coronavirus.

Na Nouvelle-Zélande, bato bazali kotya biloko ya kosakana, bana popi, mpe mayemi na maninisa mpo bana bátalaka yango ntango bazali kotambola penepene na bisika bafandaka. Na masangá ndenge na ndenge, bana mingi bamoni ete bazwi libaku ya kosakola, basali mayemi ya Caleb ná Sophia, mpe bakomi ete “Talá ngai na jw.org.”

Caleb ná Sophia na lininisa moko na Nouvelle-Zélande

Emilia, azali na mbula libwa, afandaka na Suisse, azali kobɛla maladi moko elɛmbisaka nzoto, akomeli bato oyo bafandaka na bandako oyo babatelaka mibange, epai sikoyo bato ya libándá bakoki kokɔta te. Emilia azali kotya na kati ya mikanda na ye liyemi ya Noa ná masuwa. Alimbolaka ete, na ntango moko boye, Noa ná libota na ye basengelaki kobima libándá te, lokola batikalaki na kati ya masuwa babikaki. Azali kolendisa bato wana ete “bátikala na kati, lokola Noa.” Soki maladi mabe oyo esili, Emilia akokende kotala bato yango na miso boye.

Bato mosusu bakomelaki mpe Emilia, mpe Emilia akomelaki bango lisusu. Mopanzi-nsango moko ayokaki nsango ya Emilia mpe alobelaki ye na lisolo moko oyo akomaki.

Libota ya ndeko Kempf na Canada

Peyton ná Ella Kempf, bilenge basi mibale oyo bazali bandeko na biso, bafandaka na Ontario, na Canada, bazali kokoba kosolola na bandeko ya lisangá na bango na ntango oyo ya maladi mabe. Tata na bango, Jared, alobi boye: “Na losambo na kati ya libota, bana na biso basalisaka biso na kokoma nkombo ya bato oyo tosengeli kobenga.” Mama na bango, Jessica, abakisi: “Tozali koteya bana na biso báyebaka ete ezali na ntina ete bándeko ya lisangá na biso, ya libota na biso, mpe baninga na biso, báyeba mpenza ete tobosani bango te.”

Stella na États-Unis

Ndenge moko, na Colorado, na États-Unis, mwana moko ya mbula libwa na nkombo Stella ná mama na ye bazwaki mokano ya kosolola na mibange ya lisangá na bango. Bakomaki bankombo na bango nyonso mpe babengaki bango na telefone.

Bandeko mibale, Jonathan ná Sean McKampson, leki azali na mbula 12 mpe yaya 15, bango ná baboti na bango bazali na lisangá ya Chinois na Arizona. Bazali kokoba kokoma mikanda na monɔkɔ ya Chinois ntɔngɔ nyonso liboso bákende kelasi. Lokola bazali naino koyekola monɔkɔ ya Chinois, kosilisa kokoma mokanda mobimba ezali lisɛki te, esɛngi ngonga mpe milende. Kasi bazali na mokano ya koyebisa bato oyo balobaka Chinois nsango ya Biblia.

Jonathan ná Sean na États-Unis

Bana motoba, yaya azali na mbula 15 mpe oyo ya nsuka azali na mbula 2, bango ná mama na bango ná ndeko mwasi moko oyo azali mobongisi-nzela, bamesaná kokende kotala bato na ndako moko oyo babatelaka mibange na wɛsti ya Michigan. Lokola maladi mabe ebimi, bakonzi bapekisi kokende na bandako wana. Sikoyo, baboti na bango bazali kotindela mibange yango bavideo ya bana bazali koyemba to kotángela mibange yango bavɛrsɛ ya Biblia. Moto moko oyo asalaka na ndako yango ayebisaki tata ya bana yango ete, moko ya bavideo yango ebɔndisaki mobange moko oyo azalaki kotungisama na makanisi nsima ya kolanda lapolo ya nsuka ya maladi ya coronavirus mpe bato oyo maladi yango ebomaki.

Tondimi mpenza ete Yehova azali kosepela na bilenge oyo bazali kolinga bato mpe bazali kosanzola Ye na ndenge bazali kozwa mayele ya sika ya kosakola.​—Nzembo 148:12, 13.