Lakisá makambo oyo ezali na kati

21/04/2020
BANSANGO YA MIKILI NYONSO

Ekaniseli ya liwa ya Kristo ya mobu 2020—JW.ORG

Bato ebele bakɔtaki na site na biso koleka ndenge bakɔtaka liboso

Ekaniseli ya liwa ya Kristo ya mobu 2020—JW.ORG

Lokola maladi ya coronavirus ezali kopalangana na mokili mobimba, Batatoli ya Yehova basali makasi básakola mingi na eleko oyo ya Ekaniseli, yango wana, bato ebele mpenza bazali kokɔta na site jw.org mpo na kozwa libɔndisi ya elimo, koyeba makambo ya Nzambe, mpe koyeba makambo oyo ezali kosalema. Na sanza ya misato, bato oyo bakɔtaki na site na biso balekaki na 50% bato oyo bakɔtaki na sanza ya mibale, mpe bato oyo basɛngaki koyekola Biblia bazalaki ebele mpenza koleka ndenge ezalaka liboso.

Ntango maladi mabe oyo ebandaki, bato mingi bakómaki kokɔta mokemoke na site na biso. Na sanza ya mibale, bato soki milio mibale bakɔtaki na site na biso mokolo na mokolo, bakɔtaka bongo banda kala. Kasi na sanza ya misato, motángo yango ebakisamaki, ekómaki koleka milio misato na mokolo moko, mpe na mikolo oyo nsango ya sika mpo na coronavirus ezalaki kotyama, motángo yango ezalaki koleka milio minei na ndambo. Na mokolo ya 07/04/2020, mokolo ya Ekaniseli ya mobu 2020, bato koleka milio nsambo bakɔtaki na site, mingi mpo na kolanda mokapo ya mokolo na losambo ya ntɔngɔ, mpe kolanda diskur ya Ekaniseli.

Bato oyo bazali kokɔta na jw.org: Motángo ya bato oyo bazali kokɔta na site jw.org na ntango oyo ya maladi mabe ebakisami mingi mpenza, mpe motángo yango elekaki nde na mokolo ya Ekaniseli, bato koleka milio nsambo bakɔtaki na mokolo yango

Ndeko Clive Martin, oyo akambaka Departema ya MEPS na biro monene ya Batatoli ya Yehova na Warwick, na etúká ya New York, alobi boye: “Na eleko oyo bato ebele bazali kokɔta na jw.org mpo na koyeba esika nini bakolanda Ekaniseli mpe na ngonga nini. Na mbula oyo, bato ebele oyo basepelaka na mateya ya Biblia, bakozala na likoki te ya koyangana na masangá na bango, yango wana, totye diskur sipesiale mpe diskur ya Ekaniseli ya mobu 2020, na minɔkɔ koleka 500. Bamilio ya bato bazwaki badiskur yango to batalaki yango na jw.org. Lokola bato ebele bazali kokɔta na site na biso mingi na ntango oyo ya mikakatano, yango emonisi ete site na biso jw.org ezali mpenza kokokisa mokano na yango oyo ezali ya kobɔndisa mpe ya kokabola mateya ya Biblia na Batatoli ya Yehova, mpe bato mosusu.”

Kozwa badiskur: Motángo ya bato oyo bazwaki diskur sipesiale (orange) mpe diskur ya Ekaniseli (bleu)

Likambo ya kokamwa ezali te, bato mingi bazali kokɔta na site na biso mpo na koluka ndenge ya komibatela mpe kokima bamaladi mosusu, mpe masolo oyo elobeli konyokwama na makanisi mpe mitungisi. Bato ebele mosusu bazali kokɔta mpo na koluka mateya ya Biblia oyo elobeli elembo ya mikolo ya nsuka, mpe bampunda minei ya Emoniseli mokapo 6.

Tozali mpe kosepela ndenge bato mingi bazali kosɛnga koyekola Biblia na nzela ya jw.org mokolo na mokolo. Na momeseno, bato 250 basɛngaka koyekola Biblia mokolo na mokolo. Kasi mikolo oyo, motángo ya bato yango mpe ebakisami. Na sanza ya misato, mokolo na mokolo, bato soki 350 bazalaki kosɛnga koyekola Biblia. Elingi koloba, bato soki 11 000 basɛngaki koyekola Biblia na sanza yango. Na mokolo ya Ekaniseli mpe na mokolo oyo elandaki, bato koleka 1 000 basɛngaki koyekola Biblia na nzela ya jw.org.

Yesu alobaki ete bato oyo bayebi bobola na bango ya elimo, bakozala na esengo. (Matai 5:3) Tozali na esengo ya komona ete bato ebele mpenza bazali koya koluka libɔndisi mpe lisalisi epai ya Yehova mpe na ebongiseli na ye na ntango oyo ya mpasi.​—2 Bakorinti 1:3, 4.