Lakisá makambo oyo ezali na kati

Bandeko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi bazali kosala diskur ya Ekaniseli: (na lobɔkɔ ya mwasi) ndeko Anthony Morris azali kosala diskur oyo bandeko ya Betele bakolanda; (na lobɔkɔ ya mobali na likoló) ndeko Geoffrey Jackson mpe (na lobɔkɔ ya mobali na nse) ndeko Mark Sanderson bazali kosala diskur na nzela ya video na bashambre na bango mpo na masangá

10/04/2020
BANSANGO YA MIKILI NYONSO

Ekaniseli ya liwa ya Yesu ya mobu 2020: Na Betele ya États-Unis

Ekaniseli ya liwa ya Yesu ya mobu 2020: Na Betele ya États-Unis

Na mokolo ya 07/04/2020, maladi mabe ya coronavirus epekisaki te Batatoli ya Yehova na mokili mobimba básala molulu ya Ekaniseli ya liwa ya Yesu. Ndenge ndeko Stephen Lett ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi alobaki yango: “Virisi moko te, to maladi moko te ekoki kopekisa biso kosala Ekaniseli mpe komonisa botondi mpo na likambo wana oyo Yehova mpe Yesu Kristo basalaki mpo na biso.” Ndenge nini bosolo ya likambo yango emonani na mbula oyo?

Oyo ezali lisolo ya liboso kati na masolo oyo ekobima na site na biso na eteni Bansango, oyo ekolobela ndenge bandeko na biso na mokili mobimba basalaki Ekaniseli ya liwa ya Yesu ata na ntango oyo ya maladi mabe ya coronavirus. Na lisolo oyo ya liboso, tokolobela ndenge Ekaniseli esalemaki na biro monene ya Batatoli ya Yehova mpe na Betele ya États-Unis.

Mpo na kobuka te mobeko ya Leta oyo eboyi ete ebele ya bato básangana esika moko, Lisangani ya Mikóló-Bakambi ezwaki ekateli ete programɛ moko kaka ya Ekaniseli etyama mpo na bandeko nyonso ya libota ya Betele. Diskur yango esalemaki na ndako ya makita na Warwick. Ndeko Anthony Morris nde asalaki diskur yango. Bandeko nyonso ya libota ya Betele ya États-Unis bazwaki libaku ya kolanda programɛ yango na bashambre na bango. Atako kaka mwa bato moke nde balyaki limpa mpe bamɛlaki vinyo, biro ya Betele etambwisaki mampa mpe vinyo epai ya bandeko nyonso ya libota ya Betele.

Mampa mpe vinyo ya Ekaniseli mpo na bandeko ya Betele

Bandeko ya Betele bazalaki mpe na likoki ya kolanda programɛ ya Ekaniseli ya masangá na bango na nzela ya video. Lisusu, bandeko ya Betele oyo bazali bankulutu bakokaki kopona kosala diskur ya Ekaniseli na masangá na bango na nzela ya video.

Ndeko oyo ná mwasi na ye basalaka na Betele ya Wallkill, awa bazali kosala Ekaniseli na shambrɛ na bango

Bandeko mingi ya Betele balobaki ete Ekaniseli oyo, ezali Ekaniseli moko oyo batikalá kosala te. Atako basalaki yango esika moko te na bandeko na bango bakristo, kasi na makanisi bazalaki elongo na bandeko nyonso ya mokili mobimba mpo na kokanisa makambo mibale ya ntina mingi oyo Yehova ná mwana na ye oyo alingaka mingi Yesu Kristo basalaki mpo balingaki biso mingi.​—Yoane 3:16; Matai 20:28.