Lakisá makambo oyo ezali na kati

Talá mwa makama oyo mopɛpɛ makasi babengi Idai esalaki na Beira, na Mozambique

27/3/2019
BANSANGO YA MIKILI NYONSO

Mopɛpɛ makasi oyo babengi Idai ebɛtaki sudi-ɛsti ya Afrika

Mopɛpɛ makasi oyo babengi Idai ebɛtaki sudi-ɛsti ya Afrika

Na mokolo ya 14/03/2019, mopɛpɛ makasi oyo babengi Idai ebɛtaki Mozambique mpe ekobaki tii na Malawi mpe na Zimbabwe. Yango ezali mopɛpɛ ya mabe koleka oyo ebɛti na mokili wana ya sudi. Mopɛpɛ yango ebebisaki banzela, bandako mpe bato koleka milio mibale banyokwamaki mpo na yango. Tosí toyebi ete bato koleka 200 bakufi na likama yango. Likambo ya mawa na Mozambique, bandeko na biso mibale ya basi mpe bana mibale oyo bazwi naino batisimo te bakufi mpe na likama yango. Lisusu, elenge mobali moko ya mbula 14 akufaki na Zimbabwe ntango mabele ebukanaki mpe ememaki ndako na ye.

Ndako ya Bokonzi ya Inhamízua oyo mopɛpɛ yango ebebisaki na Mozambique

Filiale ya Mozambique elobi mpe ete bandako mingi ya bandeko mpe Bandako ya Bokonzi mingi ebebaki to ebukanaki. Na Zimbabwe, Filiale emonisi ete bandako 15 ya bandeko na biso mpe Bandako ya Bokonzi 2 ebebaki mpenza. Na Malawi, filiale elobi ete bandako 764 ya bandeko na biso ebukanaki mpe bandako 201 ebebaki. Bandako ya Bokonzi 2 mpe ebebaki. Basalaki bakomite 6 mpo na kotambwisa misala ya kopesa lisungi; komite 2 na Mozambique mpe 4 na Malawi.

Bitape ya minene ya nzete esimbi nsamba ya bandako ya bandeko mibale na Malawi nsima ya kokwea ya bifelo..

Tozali na mawa mingi mpo na bandeko na biso oyo bazali konyokwama mpo na likama wana. Tozali kobondela ete bandeko nyonso oyo bakutani na mpasi yango, bákoba kotyela Yehova motema ete akopesa bango kimya oyo basengeli na yango.​—Baroma 15:13.