Lakisá makambo oyo ezali na kati

Ndeko Sergey Filatov

02/03/2020
BANSANGO YA MIKILI NYONSO

Mosika te tribinale ekoyebisa ekateli oyo ezwi mpo na likambo ya Motatoli ya Yehova ya liboso na Crimée

Mosika te tribinale ekoyebisa ekateli oyo ezwi mpo na likambo ya Motatoli ya Yehova ya liboso na Crimée

Na mokolo ya 05/03/2020, tribinale ya etúká ya Dzhankoysky na République ya Crimée ekoyebisa ekateli oyo ezwi mpo na likambo ya ndeko Sergey Filatov. Zuzi asɛngi ete bákatela ndeko Sergey Filatov mbula 7 ya bolɔkɔ na esika oyo ekɛngɛlami malamu mpenza. Ndeko Filatov azali Motatoli ya Yehova ya liboso na Crimée oyo tribinale ya Russie esambisi ye na kolanda mibeko.

Ndenge lapolo emonisi yango, bakangaki ndeko Filatov ntango babandaki kolandela Batatoli ya Yehova mpe kokanga bango na bambula oyo euti koleka. Na mokolo ya 10/10/2017, baninga ya ndeko Filatov bayaki koyangana na ndako na ye mpe koyemba nzembo ya Bokonzi. Bato ya sireté ya Russie (FSB) bayaki na kobombana mpe bakɔtisaki mongongo na bango na kasɛti. Mwa moke nsima ya mbula moko, na butu ya mokolo ya 16/11/2018, bapolisi 200 bakɔtaki na makasi na bandako 8 ya Batatoli ya Yehova mpo na kosala ankɛtɛ. Bapolisi koleka 35 bakɔtaki na makasi na ndako ya ndeko Filatov, mpe mingi na bango bazalaki na mindoki na mabɔkɔ. Batunatunaki ndeko Filatov mpe na nsima batikaki ye.

Ndeko Sergey Filatov ná mwasi na ye, Natalya, bazali na bana 4, mibale kati na bango bazali bana mike mpenza. Lokola ndeko Filatov azali kozela ekateli ya tribinale na likambo oyo bafundi ye na yango, tozali kobondela ete ye ná libota na ye mobimba bákoba kotalela Yehova lokola ekimelo na bango, mpe tondimi ete Yehova akosalisa bango na ntango oyo ya mpasi.​—Nzembo 46:1.