Lakisá makambo oyo ezali na kati

Ndeko Artem Gerasimov

27/02/2020
BANSANGO YA MIKILI NYONSO

Mosika te tribinale ya Crimée ekozwa ekateli mpo na likambo ya ndeko Artem Gerasimov

Mosika te tribinale ya Crimée ekozwa ekateli mpo na likambo ya ndeko Artem Gerasimov

Tribinale ya engumba Yalta na République de Crimée esengeli koyebisa ekateli oyo ezwi na likambo ya ndeko Artem Gerasimov na mokolo ya 03/03/2020. Prokirɛrɛ asɛngaki ete bákatela ndeko Gerasimov etumbu ya mbula motoba ná ndambo ya bolɔkɔ, kaka mpo na kondima na ye.

Bakangaki ndeko Gerasimov mpo na mwa ntango mpe babandaki kotunatuna ye mituna na mokolo ya 20/03/2019, na nsima, bapolisi ya Service fédéral de sécurité (FSB) bakɔtaki na ndako mwambe ya Batatoli ya Yehova na engumba Alupka mpe Yalta, kaka na République de Crimée. Ntango bakɔtaki na bandako yango, bapolisi yango bazwaki baordinatɛrɛ, Babiblia mpe baaparɛyi mosusu ya bandeko. Nsima na yango, bato ya FSB bafundaki ndeko Gerasimov ete asalaki ekipi ya bato oyo babimisaka botomboki, nyonso wana kaka mpo azalaki kosolola na bato makambo ya Biblia.

Tozali mpenza na kondima ete Yehova akosalisa bandeko na biso bázala na ‘mpiko mpe makasi’ wana bazali kotikala sembo atako bazali komekama mpo na kondima na bango.​—Nzembo 138:3.