Lakisá makambo oyo ezali na kati

04/06/2020
BANSANGO YA MIKILI NYONSO

Tribinale monene ya Crimée ekateli ndeko Artem Gerasimov mbula motoba na boloko

Tribinale monene ya Crimée ekateli ndeko Artem Gerasimov mbula motoba na boloko

Na mokolo ya 04/06/2020, tribinale monene ya Crimée ekatelaki ndeko Artem Gerasimov mbula motoba na bolɔkɔ mpo azalaki kosala losambo ya Bakristo na kimya. Asɛngaki na tribinale monene ete etalela likambo na ye mpo asali likambo moko ya mabe te mpo tribinale ya etúká ya Yalta ekatelaki ye lomande ya dolare 6 000. Tribinale monene ezwaki mbala moko ekateli mpe batyaki na makasi ndeko Gerasimov na kasho. Azali kozela bazuzi bátalela lisusu ekateli yango.