Lakisá makambo oyo ezali na kati

05/03/2020
BANSANGO YA MIKILI NYONSO

Tribinale ya Crimée ekweisaki ndeko Artem Gerasimov na likambo mpe esɛngaki ye afuta amande

Tribinale ya Crimée ekweisaki ndeko Artem Gerasimov na likambo mpe esɛngaki ye afuta amande

Na mokolo ya 03/03/2020, tribinale ya engumba Yalta na République de Crimée ekweisaki ndeko Artem Gerasimov na likambo. Atako akokɔta na bolɔkɔ te, kasi tribinale esɛngaki ye afuta amande ya dolare soki 6 000. Ndeko Artem akosɛnga bátalela lisusu ekateli oyo bazwaki mpo na ye.