Lakisá makambo oyo ezali na kati

(Na loboko ya mwasi) Kati na makambo oyo tosengeli kosala mpo na komibatela, tosengeli mpe kopɛtola bisika oyo tosimbaka mbala mingi, ezala na ndako na biso to mpe na ndako ya Bokonzi; (Na katikati) Na bisika oyo maladi ezali, basakoli bakoki kobongola lolenge ya kosakola, na ndakisa bakoki kosakola na nzela ya telefone; (Na loboko ya mobali) Ntango maladi mabe ebimi esika moko, na kotalela makambo ya mboka bankulutu bakoki kosala ete bandeko balandaka makita na bandako na bango na nzela ya video.

03/03/2020
BANSANGO YA MIKILI NYONSO

Coronavirus: Bansango ya sika mpe ndenge ya komibatela

Coronavirus: Bansango ya sika mpe ndenge ya komibatela

Biro monene ya Batatoli ya Yehova ezali kolandela na likebi mpenza makambo etali maladi mabe oyo euti kobima, oyo bazali kobenga coronavirus (to mpe COVID-19). Toyebi malamu Biblia esakolaki ete na ntango oyo ya nsuka bamaladi mabe ekozala. (Luka 21:11) Ntango maladi mabe moko ebimi, tokomonisa bwanya soki tozwi bibongiseli mpo na komibatela mpe kobatela basusu.​—Masese 22:3.

Basusu bakoki komituna: Ndenge nini bandeko na biso na bisika oyo maladi yango ezali? Maladi yango ebongoli mpenza makambo mingi na Babetele mpe masangá mingi na Italie, Japon, Corée du sud mpe bamboka mosusu. Bafiliale mosusu epekisi bato ya libandá báya kosala vizite na Betele. Na bisika mosusu, bakonzi ya mboka bapekisi mayangani ya bato mingi esika moko, yango elingi koloba mayangani ya zongazonga ekosalema naino te na bisika yango. Lisusu, masangá mingi ebongoli baprogramɛ ya mosala ya kosakola mpe ya makita. Atako mikakatano wana, bandeko na biso bazali kokoba kolendisana na elimo.​—Yuda 20, 21.

Na kotalela makambo wana, bandeko na biso bamoni ete ezali na ntina tólanda batoli oyo ezali na nse. Batoli yango ekoki kozala na ntina mpo na bino mpe libota na bino nyonso soki maladi moko ya mabe ebimi esika bofandi.

  • Kobanga te. Atako ezali na ntina kolandelaka bansango mpo na koluka komibatela, tosengeli kozala na bokatikati mpe kotalela makambo malamumalamu na esika tokóma bibangabanga.​—Masese 14:15; Yisaya 30:15.

  • Tosá malako mpe makambo bakonzi basɛngi bato básala. Na bisika mingi bakonzi ya Leta bazali kosɛnga bato makambo ya kosala to bazali kopesa malako mpo na sante. Ezali malamu koyeba makambo yango mpe kotosa yango.​—Baroma 13:1.

  • Zalá pɛto. Ezali na ntina kosokolaka ntango nyonso maboko na mai mpe ná sabuni to nkisi oyo ebomaka mikrobe. Tosengeli mpe kopɛtola bisika oyo tosimbaka mbala mingi, ezala na ndako na biso to mpe na ndako ya Bokonzi. Lisusu, bato ya mayele na makambo ya sante bamoni ete kopesana mbote na maboko yango mpe ezali kosala ete maladi mabe yango epanzana epai ya bato mingi. Ebongiseli ya ONU oyo etalaka bokolɔngɔnɔ ya nzoto epesi toli mingi na bato nyonso mpo na maladi ya coronavirus.

  • Moniselá basusu bolingo. Toboyi te, ezali malamu kokende makita mpe kobima mosala ya kosakola, kasi soki ozali kobɛla, ezali malamu otikala na ndako mpo obatela bato mosusu. Kosala bongo tokobatela bandeko na biso Bakristo mpe tokomonisa ete tolingaka bango, ezala mpe bazalani na biso oyo bazali Batatoli ya Yehova.​—Matai 22:39.

  • Tosá bibongiseli ya sika oyo etyami mpo na makita mpe mosala ya kosakola. Bafiliale oyo esika maladi ya coranavirus ezali ekoki mbala mosusu kopekisa makita, mayangani to makambo mosusu ya losambo na biso esalema te. Yango nde esalemi na bisika oyo maladi yango ezali mingi, ndakisa na Italie, Japon mpe Corée du sud. Na bisika ya bongo, bankulutu bakoki kosala ete basakoli balandaka makita na bandako na bango na nzela ya video. Mpo na mosala ya kosakola, basakoli bakoki kosalela telefone, mesaje, Internet to mpe kotinda mikanda.