Lakisá makambo oyo ezali na kati

28/3/2018
BANSANGO YA MIKILI NYONSO

Batatoli ya Yehova bamonisi bomoko na ntango ya kampanye ya kokoma mikanda mpo na bandeko na bango ya Russie

Batatoli ya Yehova bamonisi bomoko na ntango ya kampanye ya kokoma mikanda mpo na bandeko na bango ya Russie

Na mokolo ya 21/03/2017, Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova esɛngaki bandeko ya mokili mobimba bákomela bakonzi ya Leta oyo bazalaki koluka kopekisa mosala na biso na Russie. Atako toyebi te mikanda boni ekómelaki bakonzi ya Russie, bakonzi yango bayebisaki mingi ya baoyo basanganaki na kampanye yango ete bamonaki mikanda na bango. Atako bakonzi ya Russie baboyaki kondima bosɛnga yango mpe basalelaki bokonzi na bango na ndenge ya mabe mpo na kopekisa losambo ya bandeko na biso, kampanye yango emonisaki mpenza bomoko oyo Batatoli ya Yehova bazali na yango na mokili mobimba. Kampanye yango emonisaki mpe polele ete bandeko na mokili mobimba bandimaki kopesa bandeko ya Russie mabɔkɔ.​—1 Petro 2:17.

Elenge mwasi moko na Bolivie azali kokoma mokanda mpo na kopesa mabɔkɔ na kampanye.

Batatoli ya Yehova mingi basalaki makasi mpo na kosangana na kampanye yango. Na bamboka mosusu, kotinda mikanda na Russie esɛngaki bango mbongo mingi, yango wana baoyo bazalaki na mbongo mingi basalisaki baoyo bazalaki na mbongo mingi te mpo bákoka kotinda mikanda na bango. Na bisika mosusu, basakoli basengelaki kotinda mikanda na bango na nzela ya baninga na bango oyo bazali na bamboka mosusu epai kotinda mikanda esɛngaka mbongo mingi te. Mabota mpe masangá mingi esanganaki elongo mpo na kokoma mikanda mpe kotinda yango nyonso nzela moko. Kosala bongo, ezalaki kaka te mpo basakoli bábatela mbongo, kasi ezalaki mpe ntango moko ya malamu oyo bandeko balekisaki elongo, oyo bakobosana te na bomoi na bango mobimba.

Balapolo mosusu emonisi ete bato oyo basalaka na poste bapesaki mpe mabɔkɔ na kampanye yango. Na ndakisa, mokambi moko ya agence moko ya kotinda biloko na Barranquilla, na ekólo Colombie, alobaki: “Nakamwaki komona ndenge bozali na bomoko na mokili mobimba, mpe bino nyonso boyei awa kaka mpo na likambo oyo ezali koleka na Russie. Nakanisi ete likambo oyo bosali awa na Barranquilla ezali mpe kosalema na bisika mosusu na mokili. Nsango yango ekozala na ntina mingi na mokili mobimba, mpe nazali na elikya ete basusu bakomona ntina na yango.” Na Anseong, na Corée du Sud, mosali moko ya poste abongisaki kɛsi moko kaka mpo na Batatoli ya Yehova mpo na kotinda mikanda mpe asalelaki bango baanvelɔpɛ oyo basalelaka mpo na kotinda mikanda na bamboka mosusu; mpe asalaki nyonso wana ofele.

Bandeko ya lisangá na Guinée basangani mpo na kokoma mikanda.

Yaroslav Sivulskiy, molobeli ya Batatoli ya Yehova, alobi: “Ntango bandeko ya Russie bayokaki ete Lisangani ya Mikóló-Bakambi ebimisaki likanisi ya kosala kampanye ya kokoma mikanda na mokili mobimba mpo na bango, bamonaki ete bazali bango moko te, ata soki tribinale ezwi ekateli nini.”

Mark Sanderson ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi alobi: “Kampanye oyo ya kokoma mikanda emonisaki mpenza bomoko oyo basaleli ya Yehova bazali na yango. Bomoko yango ekozala na ntina mpo na lobiko na biso, lokola tozali kokóma na nsuka ya makambo ya ntango oyo. Wana tozali kozela komona ndenge Yehova akotambwisa makambo oyo ezali koleka na Russie, tosengeli kosala nyonso mpo na kopesa bandeko na biso mabɔkɔ. Tokokoba kobondela Yehova na bomoko, mpe kondima ete Nzambe na biso akobatela bango na makambo nyonso.”​—Nzembo 65:2.

 

Autriche

Bolivie

Bosnie mpe Herzégovine

Danemark

Equateur

Allemagne

Ghana

Guatemala

Indonésie

Japon

Népal

Roumanie

Rwanda

Slovaquie

Espagne

Sri Lanka

Suisse

Tanzanie

Zambie