Lakisá makambo oyo ezali na kati

1 SANZA YA 5, 2018
BANSANGO YA MIKILI NYONSO

Mayangani ya etúká oyo Batatoli ya Yehova basalaka mbula na mbula ya mobu 2018 ekobanda na sanza ya mitano

Mayangani ya etúká oyo Batatoli ya Yehova basalaka mbula na mbula ya mobu 2018 ekobanda na sanza ya mitano

NEW YORK​—Batatoli ya Yehova bakobanda mayangani ya etúká oyo basalaka mbula na mbula na mokolo ya 18/05/2018. Motó ya likambo ya liyangani ya mbula oyo ezali: “Zalá na Mpiko!” Liboso ya mayangani yango, Batatoli na mokili mobimba bakosala kampanye mpo na kobengisa bato báya koyangana na programɛ yango ofele. Mayangani yango ekosalema na bisika 180 na bamboka ndenge na ndenge.

Programɛ yango ya mikolo misato ezali na masolo 54 oyo esangisi badiskur, badrame oyo tokoyoka koyoka, mituna-lisolo, mpe bavideo ya mikuse. Longola yango, ezali mpe na filme oyo ezali na motó ya likambo Lisolo ya Yona​—Eteyi biso mpiko mpe motema mawa ekolakisama mokolo ya nsuka ya liyangani. Mokolo na mokolo, eteni ya ntɔngɔ mpe ya nsima ya midi ekobanda na miziki oyo ebongisami na video kaka mpo na liyangani yango.

David A. Semonian, molobeli ya Batatoli ya Yehova, alobi: “Soki ozali kolanda bansango lelo oyo, okoki komona polele ete bato ya mbula nyonso bazali kokutana na mikakatano mingi mpe bakómi kobanga mingi koleka liboso. Ezali kosɛnga mpiko mpo na kolonga mikakatano yango. Tozali kotombela moto nyonso boyei malamu na liyangani ya etúká ya mbula oyo mpo azwa matomba na toli oyo ebongi oyo ezali na Biblia.”

Badati mpe bisika ya liyangani mokomoko ekosalema, okoki komona yango na site Internet ya Batatoli ya Yehova, jw.org.

Moto oyo bapanzi-nsango bakobenga:

Na mokili mobimba: David Semonian, Biro ya kozwa bansango, +1-845-524-3000